Mokapo ya zomi na motoba
“Bólinganaka makasi”
1. Mbala mingi, makambo nini ekamwisaka bato ya sika oyo bayaka na makita ya Batatoli ya Yehova?
NTANGO bato bayaka mpo na mbala ya liboso na makita ya Batatoli ya Yehova, mbala mingi bakamwaka mpo na bolingo oyo ezalaka kuna. Bamonaka ezaleli yango ntango bayambaka bango na boboto mpe na boninga mpenza. Bapaya oyo bayaka na mayangani na biso bamonaka mpe bolingo yango. Mopanzi-nsango moko akomaki mpo na liyangani moko ete: ‘Moto moko te alangwe bangi to masanga. Moto moko te azali koganga to kobelela. Bato bazali kotindikana te. Kowelana ezali te. Moto moko te azali kofinga to kolobela moninga mabe. Maloba ya bosɔtɔ to masɛki ya mbindo ezali te. Moto moko te azali komɛla likaya. Moyibi ezali te. Bazali kobwaka manzanza ya bosɔtɔ na nse te. Ezalaki mpenza likambo ya kokamwa.’ Nyonso wana ezali elembo ya bolingo oyo “emitambwisaka na ndenge ya nsɔni te, elukaka matomba na yango moko te.”—1 Bakolinti 13:4-8.
2. (a) Bolingo na biso esengeli mpenza komonisa nini nsima ya ntango? (b) Lokola tosengeli komekola Klisto, bolingo ya ndenge nini tosengeli kolona?
2 Bolingo na kati ya bandeko ezali elembo oyo ezali komonisa baklisto ya solo. (Yoane 13:35) Ntango tozali kokola na elimo, toyekolaka ezaleli ya komonisa bolingo lisusu mingi koleka. Ntoma Paulo abondelaki ete bolingo ya baninga na ye baklisto “etondana lisusu mpe lisusu.” (Bafilipi 1:9) Ntoma Yoane amonisaki ete tosengeli kozala na bolingo mpe komipimela makambo mosusu. Akomaki ete: “Na likambo oyo nde toyebi bolingo, mpamba te [Mwana ya Nzambe] akabaki molimo na ye mpo na biso; mpe biso tosengeli kokaba molimo na biso mpo na bandeko na biso.” (1 Yoane 3:16; Yoane 15:12, 13) Tokoki mpenza kopesa bomoi na biso mpo na bandeko na biso? Atako makambo mingi esɛngaka bongo te, milende ya ndenge nini tosalaka mpo na kosalisa bango sikoyo, ata na ntango oyo ebongi te?
3. (a) Na lolenge nini tokoki komonisa bolingo na biso lisusu mingi koleka? (b) Mpo na nini ezali na ntina mingi kozala na bolingo makasi kati na biso sikoyo?
3 Lokola tomonisaka mpenza elimo ya komipimela na misala na biso, tosengeli mpe kosepelaka makasi na bandeko na biso. Liloba ya Nzambe esɛngi biso ete: “Na kati ya bolingo ya bondeko bózalaka na bolingo ya motema bino na bino.” (Baloma 12:10) Biso nyonso toyokaka ndenge wana mpo na bato mosusu. Kasi, tosengeli koyekola kozala na bolingo ya ndenge wana mpo na bato mosusu? Lokola nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ekómi pene, ezali na ntina mingi mpo na biso kozala na boyokani makasi elongo na baninga na biso baklisto. Biblia elobi boye: “Nsuka ya makambo nyonso ekómi pene. . . . Likambo eleki ntina mpenza, bólinganaka makasi, mpamba te bolingo ezipaka ebele ya masumu.”—1 Petelo 4:7, 8.
Ntango mikakatano ebimi
4. (a) Mpo na nini mikakatano ekoki kobima kati na bandeko na lisangá? (b) Atako toli ya Biblia ekoki ntango nyonso te kokokana na bamposa ya motema na biso, litomba nini tokoki kozwa soki tosaleli toli yango?
4 Ya solo, lokola tozali naino bato ya kozanga kokoka, na bantango mosusu tosalaka makambo oyo ezokisaka basusu. Bandeko na biso mpe bakoki kosalela biso lisumu na ndenge ebele. (1 Yoane 1:8) Soki okutani na likambo ya ndenge wana, osengeli kosala nini? Makomami ezali kopesa toli oyo esengeli kolanda. Kasi, oyo Makomami ezali koloba mbala mosusu ekoki kokokana te na oyo biso bato ya masumu tolingaka kosala. (Baloma 7:21-23) Nzokande, soki tozali kosalela nokinoki toli ya Biblia, yango ekomonisa ete tozali mpenza na mposa makasi ya kosepelisa Yehova. Kosala bongo ekokolisa bolingo na biso mpo na bamosusu.
5. Soki moto moko asali biso mabe, mpo na nini tosengeli te kozongisa mabe na mabe?
5 Ntango basali moto moko mabe, mbala mosusu alukaka nzela ya kozongisa mpe mabe. Kasi kosala bongo ebebisaka makambo nde kobebisa. Soki esɛngi kopesa etumbu, tosengeli kotika likambo yango na mabɔkɔ ya Yehova. (Masese 24:29; Baloma 12:17-21) Basusu baboyaka kokutana na moto oyo asali bango mabe. Kasi tosengeli kosala baninga na biso bandimi ndenge wana te, mpamba te Nzambe akondima losambo na biso kaka soki biso moko mpe tozali kolinga bandeko na biso. (1 Yoane 4:20) Yango wana, Paulo akomaki ete: “Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko soki moko na bino azali na likambo na mosusu. Kaka ndenge Yehova alimbisaka bino na motema moko, bino mpe bósala bongo.” (Bakolose 3:13) Okoki kosala yango?
6. (a) Mbala boni tosengeli kolimbisa ndeko na biso? (b) Likambo nini tosengeli koyeba oyo ekosalisa biso tólimbisa mabe oyo basaleli biso?
6 Na bongo, tokoki kosala nini soki moto moko azali kosala biso mabe mbala na mbala kasi ezali masumu ya minene te oyo ekoki kobimisa ye na lisangá? Mpo na masumu ya mikemike, ntoma Petelo apesaki likanisi ya kolimbisa “mbala nsambo.” Nzokande, Yesu alobaki ete: “Tii na mbala ntuku nsambo na nsambo.” Amonisaki bonene ya nyongo na biso epai ya Nzambe ntango akokanisaki yango na oyo moto moko akoki kozala na yango epai na biso. (Matai 18:21-35) Tosalelaka Nzambe masumu ndenge na ndenge mokolo na mokolo—mbala mosusu na likambo moko ya mabe, na maloba to na makanisi, to na likambo moko oyo tolongi te kosala yango, kutu mbala mosusu toyebaka te ete tozali kosala masumu. (Baloma 3:23) Atako bongo, Nzambe azali ntango nyonso koyokela biso mawa. (Nzembo 103:10-14; 130:3, 4) Azali kosɛnga biso tósalela bato mosusu mpe bongo. (Matai 6:14, 15; Baefese 4:1-3) Na bongo, tokomonisa bolingo oyo “ebombaka mabe na motema te.”—1 Bakolinti 13:4, 5; 1 Petelo 3:8, 9.
7. Tosengeli kosala nini soki ndeko moko akangeli biso nkanda na likambo moko?
7 Ekoki kozala na bantango mosusu oyo tokomona ete atako tobombeli ndeko na biso nkanda te, kasi azali kokangela biso nkanda na likambo moko. Tokoki ‘kozipa yango na bolingo,’ ndenge 1 Petelo 4:8 elobi yango. Tokoki koluka kosolola na ye mpe koluka kozongisa kimya.—Matai 5:23, 24.
8. Soki moninga moko mondimi asali likambo moko oyo etungisi biso, tosengeli kosala nini mpo na yango?
8 Ekoki kozala ete moninga moko mondimi azali kosala likambo moko oyo ezali kotungisa kaka yo moko te kasi mbala mosusu ezali kotungisa mpe bato mosusu. Ekozala malamu te kosolola na ye? Mbala mosusu. Soki oyebisi ye likambo yango na boboto, yango ekoki kopesa matomba malamu. Kasi, liboso mpenza osengeli naino komituna: ‘Azali mpenza kosala likambo moko oyo eyokani te na Makomami? To ezali komonana likambo kaka mpo esika ngai nakoli to ndenge ngai nabokwami ekeseni na oyo ya ye? Kebá ete otya mibeko na yo moko te mpe na yango osambisa ye na kotalela mibeko wana. (Yakobo 4:11, 12) Yehova andimaka bato ya mitindo nyonso mpe azalaka na motema molai wana bazali kokola na elimo.
9. (a) Banani batyelaka masumu ya minene likebi na kati ya lisangá? (b) Ntango nini moto oyo basali ye mabe azali na mokumba ya koluka liboso kobongisa likambo, mpe na mokano nini?
9 Soki moto moko na lisangá asali lisumu monene, na ndakisa pite, esengeli mpenza kotyela yango likebi noki. Nani asengeli kotyela yango likebi? Bankulutu. (Yakobo 5:14, 15) Kasi, soki basaleli moto moko lisumu ya monene, mbala mosusu na makambo ya mbongo to na lolenge mabe ya kosalela lolemo, boye moto oyo basali ye mabe asengeli liboso kosala makasi mpo na kokutana na mosusu bango mibale. (Matai 18:15) Soki yango esilisi mokakatano te, esengeli koluka kosala matambe mosusu, ndenge emonisami na Matai 18:16, 17. Bolingo mpo na ndeko na biso oyo abungi nzela mpe mposa ya ‘kolonga’ ye ekosalisa biso tósala yango na ndenge ete tósimba motema na ye.—Masese 16:23.
10. Ntango likambo moko ebimi, nini ekosalisa biso tótalela likambo na ndenge ya malamu?
10 Ntango likambo ebimi, ezala ya monene to ya moke, tokoki kozwa litomba soki tosali makasi ya koyeba likanisi ya Yehova na likambo yango. Yehova asepelaka na lisumu te, ezala ya ndenge nini, mpe na ntango oyo ye moko aponi, baoyo bazali kosala masumu ya minene babimisamaka na lisangá na ye. Kasi, tóbosana te ete biso nyonso tosalaka mabunga ya mikemike mingi mpe tozali na mposa ya motema molai na ye mpe mawa na ye. Na yango, Yehova apesi ndakisa oyo tosengeli komekola ntango bato mosusu basaleli biso lisumu. Soki tozali na motema mawa, tokomonisa bolingo na ye.—Baefese 5:1, 2.
Luká ndenge ya ‘kofungwama’
11. Mpo na nini Paulo alendisaki Bakolinti ‘báfumgwama’?
11 Paulo asalaki basanza mingi na engumba Kolinti na ekólo Grèce, mpo na kolendisa lisangá. Asalaki mingi mpo na kosalisa bandeko kuna, mpe alingaki bango mingi. Kasi, bamosusu kati na bango bazalaki komonisela ye boboto te. Bazalaki kotɔngatɔnga ye mingi. Asɛngaki bango ‘báfungwama’ na likambo etali komonisela basusu bolingo ya motema. (2 Bakolinti 6:11-13; 12:15) Ezali malamu biso nyonso tótalela lolenge biso tómonisaka bolingo mpo na basusu mpe tóluka nzela ya kofungwama epai na bango.—1 Yoane 3:14.
12. Ndenge nini tokoki kokolisa bolingo na biso mpo na bandeko nyonso na kati ya lisangá?
12 Ezali na bandeko mosusu na kati ya lisangá oyo tozalaka na mokakatano ya kozala elongo na bango? Soki tosali makasi ya kondima bokeseni ya bomoto oyo ezali kati na biso—ndenge tolingaka ete bango mpe básala mpo na biso—yango ekokómisa boyokani makasi kati na biso na bango. Boyokani na biso na bango ekoki mpe kokóma makasi soki tosepelaka na bizaleli na bango ya malamu mpe totyelaka yango likebi. Na ntembe te, bolingo na biso mpo na bango ekokola.—Luka 6:32, 33, 36.
13. Ndenge nini tokoki kofungwama na likambo etali komonisa bolingo epai ya bandeko ya lisangá na biso?
13 Ya solo, makambo oyo tokoki kosalela bato mosusu ezali na ndelo. Mbala mosusu tokokoka te kopesa moto nyonso mbote na likita mokomoko. Ekoki mbala mosusu kozala mpasi mpo na kobengisa moto nyonso mpo na kolya na baninga. Kasi tokoki nde kofungwama na kolekisa kaka mwa miniti moke mpamba mpo na komesana na moto mokomoko na kati ya lisangá? Tokoki mbala mosusu kosɛnga na moto moko oyo toyebi malamu te ete abima na biso na mosala ya kosakola?
14. Ntango tozali kati na baklisto oyo tokutaná naino na bango te, ndenge nini tokoki komonisa bolingo kati na biso?
14 Mayangani ya baklisto ezalaka ntango ya malamu ya kokolisa bolingo na biso. Bankóto ya bato bakoki kozala wana. Tokoki te kokutana na bango nyonso, kasi tokoki kosala makambo na lolenge oyo ezali komonisa ete tozali kotya bolamu na bango liboso ya esengo na biso moko. Na ntango ya bopemi, tokoki komonisa boboto na biso na koluka kokutana mpe kosolola na bamosusu oyo bazali pene na biso. Mokolo mosusu, baoyo nyonso bazali na mabele bakozala bandeko, basangani na bomoko na losambo ya Nzambe ya solo mpe Tata ya bato nyonso. Oyo nde esengo ya koyebana kati na biso! Bolingo makasi ekotinda biso tólinga kosala yango. Mpo na nini te kobanda sikoyo?
Bozongeli
• Ndenge nini baklisto bakoki kosilisa mikakatano oyo ebimi kati na bango, mpe mpo na nini?
• Wana tozali kokola na elimo, na lolenge nini bolingo na biso esengeli mpe kokola?
• Ndenge nini tokoki komonisa bolingo na biso epai ya bamosusu kasi kaka te na baninga na biso ya motema?
[Elilingi na lokasa 148]
Baklisto bamonisaka bolingo na bango ntango nyonso, na ndakisa na makita ya boklisto