Tokozwa boyengebene ya solosolo epai na nani?
Mosambisi na mokili mobimba akosala na boyengebene te?—GENESE 18:25.
1, 2. Makambo mingi ya bokeseni mazali kosala nini likoló na ebele na bato?
NA NTEMBE te ozali na mawa na komona ete bokeseni ekoli kati na mokili. Kozanga ya boyengebene ezali kosala nini likoló na yo?
2 Mpo na yango, bamosusu bakomi koboya kondima ete Nzambe ya boyengebene azali. Ekoki mpe kozala ete bazali ba agnostiques. Mbala mosusu osilaki koyoka liloba yango. Elakisi moto oyo azali kotalela ete “solo nyonso oyo eleki monene, lokola oyo etali Nzambe, eyebani te mpe emonani ete ekoyebana te”. Ezali biologiste to moyekoli na bikelamu ya bomoi Thomas Huxley, mondimi na liteya ya Darwin oyo ya évolution, ye moto abandisaki likanisi yango na ekeke ya 19a.
3, 4. Liloba “agnostique” euti wapi?
3 Kasi Huxley azwaki liloba “agnostique” epai wapi? Abimisaki yango kati na maloba oyo Paulo, moto ya mibeko na ekeke ya liboso, asalelaki kasi na ndimbola mosusu. Na ntango yango Paulo azalaki kopesa moko na badiskur eleki lokumu oyo esila kosalama. Diskur yango ezali na litomba mpo na biso na koyeba ntango nini mpe ndenge nini boyengebene ekosalema mpo na bato banso mpe lisusu na motindo nini moko na moko akoki kozwa na yango mbano.
4 Paulo asalelaki liloba “agnostique” to “ayebani te” ntango alobaki mpo na etumbelo na mbeka oyo bakomaki likoló na yango ete “Na Nzambe oyo ayebani te”. Diskur mokuse oyo Paulo asalelaki bato na Atene ekomamaki na monganga Luka, na mokapo 17 ya Misala na Bantoma. Ebandeli ya mokapo yango elobeli makambo oyo masalaki ete Paulo akoma na Atene. Makambo oyo bazingi na page 4 ezongeli maloba ya ebandeli oyo Luka apesaki mpe maloba nyonso ya diskur ya Paulo.
5. Makambo nini mamemaki Paulo na kosala diskur liboso na bato na Atene? (Tanga Misala 17:16-31)
5 Diskur yango ezali solo na nguya mpe ebongi ete totalela yango na likebi. Ekoki kolakisa makambo mingi epai na biso baoyo tozali komona makambo na bokeseni mingi oyo ezingi biso. Totanga naino biteni oyo bizali liboso na yango, ba versets kobanda ya 16 kino ya 21. Bato na Atene bazalaki na lolendo lokola bazalaki kobika na esika na mayele ya lokumu epai Socrate, Platon mpe Aristote bateyaki kala. Atene ezalaki mpe engumba ya losambo mpenza. Paulo amonaki kuna bikeko oyo ezalaki komonisa na ndakisa Ale (Arès), to Marse, nzambe na etumba; Zeuse; Eskulape, nzambe na misala ya minganga; Poséidone, nzambe ya mai monene; Dionysose, Athéna mpe Erose.
6. Kokánisá ezaleli oyo Paulo akutaki na Atene na oyo ya regió na bino.
6 Kasi makambo nini Paulo akomona soki ayei lelo kotala engumba na yo to mokili na yo? Akomona bikeko mingi elingi koloba bililingi oyo ya losambo - mpe ata kati na mikili oyo ezali na bopusi ya boklisto ya mokili oyo, boye te? Akokuta mingi koleka lisusu kati na mikili misusu. Tala oyo tokoki kotanga kati na mokanda moko oyo esalisaka baturiste to bato oyo batambolaka kotala bisika kitoko ya mokili: “Na bokeseni na ‘bandeko’ na bango ya Grèce oyo babongwabongwanaka, banzambe ya lnde bazali na mwasi moko, mpe bato bazalaki koloba ete basi na bango bazali na banguya mosusu ya kokamwa. . . . Kozanga kolekisa ndelo, na lnde ezali na bankoto ya banzambe engebene mitindo nyonso ya bomoi mpe ya biloko bizalisamaki.”
7. Lolenge nini ya banzambe Bagreke na kala bazalaki kosambela?
7 Banzambe mingi ya Bagreke balimbolelami biso lokola banzambe na bizaleli bileki mabe mpe ya mbindo mpenza. Ntango bato bazali lelo kozwa etamboli lolenge yango, ezali nsoni mpo na bango mpe, na mikili mingi, batalelami lokola bato na mobulu. Na bongo tokoki komituna boyengebene nini Bagreke ya ntango wana bakoki kolikya kozwa epai na banzambe yango. Nzokande Paulo amonaki ete bato na Atene bamipesaki mingi mpenza epai na bango. Yango wana lokola azalaki na kondimisama mpenza, abandaki komonisa bango solo ya kotombwama oyo elakisami na boklisto ya solosolo.
Bayoki ya ntembe
8. (a) Filozofi ya Ba épicuriens ezalaki na makanisi nini? (b) Ba stoïciens bazalaki kokanisa nini?
8 Bayuda mpe Bagreke bayokaki Paulo na likebi, kasi Ba épicuriens mpe Ba stoïciens, bango bafilosofe ya lokumu, bayambaki nsango na ye ndenge nini? Ndenge tokomona yango, makanisi na bango ekokanaki na makanisi mingi ya lelo, ekokanaki mpe lisusu na oyo bateyaka bilenge na kelasi. Ba épicuriens bazalaki kokumisa bomoi oyo esalelami mpo na boluki bisengo na lolenge ya kokoka, mingimingi bisengo ya makanisi Filosofi na bango, oyo etambwisami na likanisi oyo ete: ‘Tolya mpe tomela, mpamba te lobi tokokufa’, ezangaki mitinda mpe makambo ya motuya. (1 Bakolinti 15:32) Bazalaki kondima te ete banzambe basalaki mokili kasi ete bomoi ebimaki mbalakaka kati na molongo mobimba oyo ezali komitambwisa yango moko. Mpe lisusu, bazalaki kokanisa ete banzambe bazalaki kokipe bato te. Ba stoïciens nde bazalaki kopesa motuya na makanisi oyo emonani solo; bazalaki kotalela ete biloko mpe nguya ezali mibeko ya petepete ya molongo. Bazalaki komona Nzambe lokola moto mpenza te kasi lokola mopepe. Engebene bango, makambo mazalaki koyela bato na bomoi na bango masilaki kokanama bobele bongo.
9. Mpo na nini ezalaki likambo moke te mpo Paulo asakola na Aréopage?
9 Ndenge nini bafilozofe yango bayambaki mateya oyo Paulo alakisaki liboso na bato mingi? Na eleko yango, bato na Atene bazalaki bato oyo balingaki koyeba makambo nyonso mpe batondaki na lolendo mpo na mayele na bango: na bongo babandaki kotyana ntembe elongo na Paulo, mpe bamemaki ye likolo na Aréopage, ngomba na mabanga oyo ezalaki likoló na esika ya zando, kasi ndambo monene na yango ezalaki engumba kitoko to Acropole. Aréopage elimboli ngomba na Ale (Arès), mpe Arès (to Mars) azali nzambe ya etumba. Kalakala, esambiseli to likita ezalaki koyangana kuna. Ekoki kozala ete Paulo amemamaki liboso na esambiselo yango, oyo ezalaki penepene na Acropole ya kokamwa, oyo ekembisamaki na bikeko mpe na batempelo, lokola Parthénon ya lokumu. Bamosusu bazali kokanisa ete ntoma azalaki na likama mpamba te mibeko na Rome mipesaki nzela te ete bakotisa banzambe ya sika. Na bongo, atako Paulo amemamaki na Aréopage bobele mpo na kolimbola bindimeli na ye to mpo na komonisa makoki na ye ya molakisi, ntembe ezali te ete akutanaki na bayoki oyo bazalaki matata. Akokaki kolakisa nsango na ye ya ntina mingi epai na bato na Atene kozanga ete batomboka?
10. Ndenge nini Paulo asalelaki mayele na ebandeli ya diskur na ye?
10 Na Misala 17:22, 23, tala na mayele nini mpe na boyebi nini Paulo abandi koloba: andimi ete bato na Atene balingaka kosambela mpe ete bazali na bikeko ebele. Bamosusu kati na bayoki na ye bakanisi ntango mosusu ete azali kokumisa bango. Na yango, akweisi na polele te losambo na bango ya banzambe mingi, kasi alobeli etumbelo moko na mbeka oyo amonaki mpe oyo epesami “Na Nzambe oyo ayebani te.” Lisolo ya bomoi na bato endimisi ete bitumbelo na mbeka ya lolenge yango ezalaki, yango ekolisi kondima na biso kati na lisoló ya Luka. Paulo asalelaki etumbelo na mbeka yango mpo na kobandela makanisi na ye. Bato na Atene, atako batondaki na boyebi mpe na makanisi oyo emonanaka ete ezali ya solo, bandimaki nzambe moko oyo “ayebanaki te” epai na bango (na greke agnôstos). Na bongo makanisi oyo mamonani malamu masengeli ete bapesa nzela na Paulo alimbolela bango Nzambe wana. Yango ezalaki makanisi malamu mpenza.
Nzambe akoki koyebana te?
11. Ndenge nini Paulo amemaki bayoki na ye ete bakumisa Nzambe ya solo?
11 Bongo “Nzambe oyo ayebanaki” te azalaki nani? Ezali “Nzambe” oyo asalaki mokili mpe biloko binso oyo bizali na kati na yango. Moto moko te akoki koboya kondima ete molongo mobimba, banzete, banyama mpe bato bazali. Nguya, mayele mpe bwanya oyo ezali komonana bipai binso endimisi ete molongo mobimba ezali mosala ya Mozalisi ya nguya mpe ya bwanya kasi ebimaki pwasa te. Lelo, makanisi yango oyo mapesamaki na Paulo mazali lisusu ya solo koleka.—Emoniseli 4:11; 10:6.
12, 13. Na eleko na biso, matatoli nini malendisi likanisi na Paulo?
12 Kala mingi te, kati na mokanda na ye Katikati na biloko bileki minene (angl.), Sir Bernard Lovell, astronome britannique, alimboli lolenge ya kokamwa ya mitindo na bikelamu na bomoi ya mabelé, oyo baleki mike. Alobeli mpe kuna likambo ya koyeba soki ekoki kosalema ete babima pwasa. Apesi bosukisi oyo: “Elikya ezali mpenza moke . . . ete likambo moko ya pwasa ékoma kino kobimisa ata mwa eteni eleki moke ya protéine. Na yango, na kotalelaka bandelo ya ntango mpe ya esika oyo ezali litomba mpo na biso, elikya yango ezali te.”
13 Na ngambo mosusu, ba astronomes bayekolaki ebandeli ya molongo mobimba na nzela ya bisaleli ya électronique. Bamonaki nini? Robert Jastrow alakisi biso yango kati na mokanda na ye Nzambe mpe ba astronomes (angl.) na maloba oyo: “Na mikolo ya lelo, boyebi na biso na makambo matali astronomie elandi liteya na Biblia mpo na ebandeli ya mokili.” “Moto na sianse oyo andimi nguya ya makanisi amoni lokola azali kolota ndoto mabe. Nsima wana esilaki ye kobuta bangomba ya bozangi boyebi, alingi kokoma kino na nsonge eleki likoló. Mpe wana ebuti ye na libanga ya nsuka, akuti nini? Etuluku ya bayekoli na makambo na Nzambe [baoyo balongisaka liteya ya kozalisama] bazali kozela wana uta bikeke mingi.”—Tala Nzembo 19:1.
14. Likanisi nini ya mayele esimbi maloba na Paulo engebene yango Nzambe afandaka kati na batempelo esalemi na moto te?
14 Na bongo tomoni bosolo ya maloba na Paulo makomami na Misala 17:24, oyo ememi biso na eteni mosusu elobelami na verset 25. Nzambe na nguya oyo asalaki “mokili mpe biloko binso bizali kati na yango” azali solo monene koleka biloko binso bizali komonana. (Baebele 3:4) Ekozala bongo kozanga mayele na kokanisa ete Nzambe afandi kati na batempelo, mingimingi batempelo oyo etongami na bato oyo bazalaki koloba ete ye “ayebanaki te” epai na bango. Oyo nde ndimbola na nguya Paulo apesaki na bafilozofe ya Atene baoyo, na ntango wana, mbala mosusu bazalaki kotala batempelo mingi oyo ezalaki na bisika bitombwani zingazinga na bango!—1 Mikonzi 8:27; Yisaya 66:1.
15. (a) Mpo na nini ekoki kozala ete bayoki na Paulo bakanisaki na Athena? (b) Bosukisi nini tokoki kozwa na likambo oyo ete Nzambe nde moto apesaka?
15 Ekoki kozala mpenza ete bayoki na Paulo bazalaki kosambela moko na bikeko ya Acropole oyo epesamaki na Athéna, nzambe-mwasi mobateli na engumba. Ekeko ya Athéna oyo ezalaki na Parthénon esalemaki na wolo mpe na mpembe ya nzoku. Longwa na bamasuwa oyo ezalaki kokutana penepene na esika yango, bato bakokaki komona ekeko mosusu ya Athéna ya molai ya bamètre soki ntuku mibale. Mpe lisusu, bonkoko elobaki ete ekeko oyo ebengamaki Athéna Polias ekweaki koutaka na likoló; bazalaki komemela ye mbala na mbala elamba ya sika oyo esalemaki na maboko. Nzokande, soki Nzambe oyo bato yango bayebaki te azalaki Nzambe oyo Aleki Likoló mpe asalaki molongo mobimba, azalaki na mposa na biloko ya mosuni oyo bakokaki komemela ye? Ezali nde ye moto azali kopesa biso biloko oyo tosengeli na yango: “bomoi”, “mpema” oyo esimbi yango mpe “biloko binso” lokola moi, mbula mpe mabelé malamu oyo ezali kobimisa biloko oyo tolyaka, boye te? (Misala 14:15-17; Matai 5:45) Ye moto azali kopesa mpe bato bazali kozwa. Nzokande, na ntembe te, ye oyo azali kopesa aleki baoyo bazali kozwa.
Banso bauti na moto moko
16. Paulo alobaki nini mpo na ebandeli na moto?
16 Na nsima, kati na Misala 17:26, Paulo abimisi solo moko oyo esengeli bato mingi bakanisa na yango, mingimingi na eleko na biso oyo bokeseni monene mpo na mposo epalangani. Alobi ete: “Na moto moko”, Mozalisi “abotisi mabota nyonso na bato mpo na kofanda na mikili nyonso na nse.” Likanisi engebene yango bato banso bazali libota bobele moko, mpe makambo oyo likanisi yango ekoki kobimisa likoló na liteya etali boyengebene, esengelaki kotinda bato na Atene ete bakanisa; na bongo, bango bazalaki kokanisa ete bautaki na esika na bango moko oyo ekesenisaki bango na bato mosusu ya mokili. Kasi Paulo andimaki lisolo ya Genese engebene yango Adam, moto na liboso, azali tata na biso banso. (Baloma 5:12; 1 Bakolinti 15:45-49) Kasi mbala mosusu ozali komituna soki likoki ezali lisusu ya kolongisa maloba yango na eleko na biso ya makambo na sianse.
17. (a) Makambo nini mautaki kala mingi te kondimisa likanisi na Paulo? (b) Boyokani nini ezali kati na yango mpe boyengebene?
17 Liteya ya évolution ezali koloba ete na bisika bikeseni ya mokili bato babongwanaki mpe bazalaki kozwa mitindo ndenge na ndenge. Nzokande, na ebandeli na mbula oyo eleki, zulunalo Newsweek esalelaki eteni na yango oyo etalaka makambo na sianse mpo na kolobela titre oyo: “Tozali kolukaka Adam mpe Eva”: Eteni yango elakisaki makambo oyo bamonaki na bolukiluki oyo bautaki kosala na oyo etali kobotama. Lokola tokokaki komizela na yango, bato na boyebi ya makambo yango bazalaki bango nyonso na likanisi moko te; nzokande, lisolo yango emonisaki ete, na makambo matali kobotama, biso banso tozali na nkoko bobele moko. Lokola tozali biso banso bandeko, ndenge Biblia elobaki yango uta kala, biso banso tosengeli kozwa boyengebene, boye te? Biso banso tosengeli kozwa lotomo ete basalela biso na kozanga bokesene ata ezala nini motindo ya mposo na biso, ya nsuki na biso, na mokuse, nyonso oyo ezali komonana na nzoto na biso, boye te? (Genese 11:1; Misala 10:34, 35) Kasi, motuna ezali ntango nyonso kotunama: Ntango nini bato bakokoka kozala na bomoi kati na boyengebene, mpe ndenge nini boyengebene yango ekotyama?
18. Makambo nini na lisolo ya bomoi na bato esimbaki oyo Paulo alobaki mpo na boyokani na Nzambe elongo na bato?
18 Na verset 26, Paulo amonisi ete ezali mayele na kokanisa ete Mozalisi azali na ebongiseli ekoki mpo na bato; ezali yango tobengaka mokano. Ntoma ayebaki ete ntango Nzambe azalaki koyokana na libota na Yisraele, apesaki lokola mobeko mpo na komonisa esika oyo basengelaki kofanda mpe lolenge oyo mabota mosusu bakokaki kotalela bango. (Exode 23:31, 32; Mituya 34:1-12; Deteronome 32:49-52) Eyokaki bango maloba yango, ekoki kozala ete Bagreke, na mwa lolendo, bakanisaki na bomoi na bango ya kala mpe, na yango, ata bayebaki yango to te, Jéhovah Nzambe amonisaki kati na bisakweli mokano na ye mpo na ntango, eleko ya sikisiki kati na lisolo ya bomoi na bato, oyo Grèce ekokoma nguya na Mitano ya mokili mobimba. (Danyele 7:6; 8:5-8, 21; 11:2, 3) Lokola azali Oyo asalaka makambo ata likoló na mabota, ebongi ete toluka koyeba ye, boye te?
19. Mpo na nini likanisi oyo Paulo amonisaki na Misala 17:27 eyokani na makanisi malamu?
19 Nzambe atiki biso kati na libunga te ete toluka ye na kotengatenga; asalaki na boye ete bato na Atene mpe biso mpenza tokoka koyeba ye. Na nsima Paulo akomaki na Baloma 1:20 ete: “Makambo [na Nzambe] oyo mazangi komonana, yango nguya na ye ya seko mpe bonzambe na ye, asili koyebisa yango polele na makanisi na bato kati na misala na ye.” Na yango, Nzambe azali mosika mingi na biso te; kasi tosengeli koluka kozwana na ye, koluka koyekola mpo na koyeba ye.—Misala 17:27.
20. Na ndimbola nini ezali solo ete, mpo na Nzambe ‘tozali na bomoi, tokotambolaka mpe tokozalaka’?
20 Ndenge Misala 17:28 ezali koyokisa yango, botondi nde esengeli kopusa biso toluka Nzambe. Apesi biso bomoi. Mpe ezali bomoi ya petee te, lokola oyo ya nzete. Na bongo, bato mpe ebele na banyama bazali na likoki moko ya monene, oyo ya kotambola. Yango ezali kosepelisa biso, boye te? Paulo akei lisusu mosika koleka: tozali bobele na bomoi te, kasi tozali bikelamu ya mayele, tozali na bomoto. Boongó oyo Nzambe apesaki biso ezali kopesa biso nzela na kokanisa, na kokanga ntina na mateya mazangi komonana, lokola boyengebene ya solosolo, mpe na kolikya na kokokisama ya mokano na Nzambe. Lokola tozali kokanisa yango, Paulo amonaki ete ekozala mpasi mpo na Ba épicuriens mpe Ba stoïciens na kondima maloba oyo. Yango wana mpo na kosalisa bango bándima, atangaki bakomi na nzembo Bagreke oyo bango bayebaki mpe oyo bazalaki kotosa, bakomi na nzembo yango babimisaki likanisi ya motindo yango na koloba ete: “Mpamba te tozali mpe libota na ye.”
21. Topusami na kosala nini lokola tozali libota na Nzambe?
21 Baoyo bazali kondima ete bato bazali libota to bikelamu ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló basengeli kotala epai na ye mpo atambwisa bango kati na bomoi na bango. Tokoki kokumisa molende na Paulo: wana ezalaki ye penepene na Acropole, alobaki na molende ete Mozalisi na biso azali solo monene koleka bikeko nyonso bisalemi na moto, ezala ekeko ya wolo mpe ya mpembe na nzoku oyo ezalaki kokembisa Parthenon. Baoyo nyonso kati na biso bandimi maloba oyo ya Paulo basengeli mpe kondima ete Nzambe akokani te na bikeko bizangi bomoi oyo bato mingi bazali kosambela na eleko na biso.—Yisaya 40:18-26.
22. Boyokani nini ezali kati na kobongola motema mpe boluki na biso ya boyengebene?
22 Kasi, tosengeli kosuka bobele te na kondima likanisi yango na kolandaka kozala na bomoi lokola tozalaki liboso; ezali yango Paulo amonisi polele na verset 30 na maloba oyo: “Na ntina na ntango ya kozanga boyebi [oyo ezali ya kokanisa ete Nzambe akokani na ekeko oyo ezangi nguya to andimi ete tosambela ye na nzela na ekeko], ya solo, Nzambe akanisi yango te, nde sikawa azali kosakola na bato nyonso mpe na bisika nyonso ete babongola mitema.” Na bongo, wana ezalaki ye kokende na bosukisi oyo ezali kondimisa, Paulo akotisaki liteya ya kokamwa: kobongola motema. Na yango, soki totali epai na Nzambe mpo na kozwa boyengebene ya solosolo, tosengeli kobongola mitema. Yango esengi biso tosala nini? Mpe ndenge nini Nzambe akotya boyengebene ya solosolo mpo na bato banso?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ndenge moko na ebele na bato ya eleko ma biso, Huxley amonaki bokeseni oyo esalemi na boklisto ya mokili oyo. Kati na lisolo moko etali liteya na ba agnostiques (agnosticisme) akomaki ete: “Soki tokokaki komona . . . ebale ya bokosi mpe ya makambo na nsomo, lokuta, minyoko, kobuka masengami na bomoto oyo euti na liziba yango na boumeli na lisolo ya mikili ya boklisto, makambo yango maleki na mosika mpenza mabe nyonso oyo tokoki kokanisa ete ezali kosalema na lifelo.”
Bozongeli
◻ Ezaleli nini ya losambo Paulo akutaki na Atene, mpe makambo nini ekokani na yango lelo?
◻ Na makambo nini Nzambe azali monene koleka banzambe ya lokuta nyonso oyo basambelamaki na Atene na eleko na Paulo?
◻ Engebene lolenge oyo Nzambe azalisaki bato, likambo nini ya monene esengeli kopesa elikya ya boyengebene mpo na bato banso?
◻ Bonene ya Nzambe esengeli kosala nini likoló na bato?
[Etanda na lokasa 3]
Boyengebene mpo na bato banso—Misala, mokapo 17
“16 Naino ezalaki Paulo kozela bango na Atene, amoni ete mboka etondi na bikeko, bongo elimo na ye etungisami kati na ye. 17 Na bongo kati na eyanganelo atyani ntembe na Bayuda mpe bato mosusu oyo bazalaki kosambela Nzambe, mpe kati na zando mokolo na mokolo elongo na baoyo bazalaki kokutana kuna. 18 Bato na mayele mosusu Baepikuli (épicuriens) mpe Basetoa (stoïciens) bazwani na ye mpe. Bamoko bazalaki koloba ete: Molobilobi oyo azali na mposa na koloba nini? Bamosusu balobi ete: Amonani lokola mosakoli na banzambe na bapaya’. Mpo ete azalaki kosakola Yesu mpe lisekwa. 19 Basimbi ye, mpe bakambi ye na Ngomba na Ale, mpe balobi ete: Tokoki koyeba soki mateya na sika mazali yo koloba mazali nini? 20 Mpo ete ozali koyokisa biso makambo na bapaya. Na bongo tozali na mposa toyeba soki makambo oyo malimboli nini. 21 Baatene nyonso, mpe bapaya oyo bazalaki kofanda wana, bazalaki kolekisa ntango na bango na likambo mosusu te bobele na koloba to na koyoka likambo na sika. 22 Paulo atelemi bongo kati na Ngomba na Ale, mpe alobi ete: Mibali na Atene! Namoni ete na makambo nyonso boleki na kokumisa banzambe. 23 Mpo ete ezalaki ngai kotambola kotala bisambelo na bino, namoni etumbelo na mbeka moko oyo basili kokoma likoló na yango ete: NA NZAMBE OYO AYEBANI TE. Na bongo oyo bino bokosambelaka kozanga koyeba ye, ngai nakosakola ye na bino. 24 Nzambe oyo asalaki mokili mpe biloko binso na kati na yango, ye wana azali Nkolo ya likoló mpe ya nse, mpe akofandaka na bisambelo bisalemi na maboko na bato te, 25 maboko na bato mpe makosalelaka ye te, lokola soki ye azali na bosenga na eloko, mpo ete ye moko akopesaka bato nyonso bomoi, na mpema, na biloko nyonso. 26 Na nkoko moko abotisi mabota nyonso na bato mpo na kofanda na mikili nyonso na nse, aponeli bango bilaka mpe atyeli bango ndelo na bifandelo na bango, 27 ete baluka Nzambe, na elikya ete bakoka komekameka na koluka ye mpe kozwa ye. Azali mpe mosika na mokomoko na biso te. 28 Mpamba te, mpo na ye tozali na bomoi mpe tokotambolaka mpe tokozalaka. Lokola bamoko na bakomi na nzembo na bino basili koloba ete: Tozali mpe libota na ye.
29 “‘Na bongo awa ezali biso libota na Nzambe, ekoki na biso kokanisa te ete Nzambe azali na motindo na wolo to palata to libanga ekokani na eloko esalemi na mayele mpe na makanisi na bato. 30 Na ntina na ntango na kozanga boyebi, solo, Nzambe akanisi yango te, nde sikawa azali kosakola na bato nyonso mpe na bisika nyonso ete bábongola mitema. 31 Mpamba te asili kopona mokolo wana ekosambisa ye mikili nyonso na boyengebene, mpe akosambisa bango na nzela na moto oyo asili kopona. Amonisi bato nyonso polele ete ezali solo, mpo ete asekwisi ye na bakufi.’
[Etanda na lokasa 4]
Molongo mobimba mozalisamaki
Na 1980, John O’Keefe, mosali na NASA (Agence aéronautique et Spatiale américaine to Ebongiseli ya Amerike etali bampepo mpe etanda ya likoló.) alobaki ete: “Nandimi maloba na Jastrow engebene yango boyekoli ya lelo ya bitando na likoló ezwaki bilembeteli minene ezali kondimisa makasi ete molongo mobimba ezalisamaki esili koleka bamiliare 15 to 20 ya bambula” “Nakamwi mpo na komona ete bilembeteli oyo bizali kolongisa kozalisama ya biloko . . . bizali komonana bipai binso: mabanga, likoló, mbonge to ba ondes ya radio-lotiliki mpe mibeko mileki minene oyo mizali kotambwisa biloko oyo tozali komona.”
[Etanda na lokasa 6]
Tozali koluka Adam mpe Eva
Tala na ndakisa, makambo oyo tokoki kotanga na nse na titre yango kati na zulunalo Newsweek: “Richard Leakey, moyekoli monene na biloko na kala (archéologue) alobaki na 1977 ete: ‘Moto ndenge azali lelo abimaki bobele na esika moko te.’ Atako bongo, bato oyo bayekolaka kobotama ya bikelamu (généticiens) bazali ntango nyonso koluka komonela makambo na lolenge mosusu . . . Stephen Gould, mokomi mpe moto na mayele na makambo matali bomoi na bato na kalakala na université ya Harvard alobaki ete: ‘Soki bazali na elonga, wana ngai na kotya loboko na ngai na móto, bosukisi na bango ezali na litomba monene koleka. Ezali komonisa biso toyeba ete ezala nini bokeseni oyo ezali komonana kati na bango, bato nyonso bazali na libota bobele moko, babimi na esika moko esili koleka mwa ntango moke. Na bongo bazali na bokokani moko etali nzoto, oyo emonani polele koleka ndenge tokanisaki liboso.’”—11 Janvier 1988.