Basaleli ya Nzambe basengeli kolinga boboto
“[Yehova] alingi nini epai na yo? Bobele ete osala na boyengebene mpe ete olinga boboto mpe ete otambola na bopɔlɔ esika moko na Nzambe na yo.”—MIKA 6:8.
1, 2. (a) Mpo na nini tosengeli kokamwa te ete Yehova asɛngi basaleli na ye bázala na boboto? (b) Na oyo etali boboto, mituna nini tosengeli kotalela?
YEHOVA azali Nzambe ya boboto. (Baloma 2:4; 11:22) Na ntembe te Adama ná Eva basepelaki mpenza na boboto ya Nzambe! Na elanga ya Edene, bazalaki na ebele ya biloko oyo ezalaki komonisa boboto ya Nzambe epai ya bato. Tii lelo oyo, Nzambe azali komonisela bato nyonso boboto, ata baoyo bazalaka na botɔndi te mpe bato mabe.
2 Lokola bato bakelamá na elilingi ya Nzambe, bakoki komonisa bizaleli na ye. (Genese 1:26) Yango wana, tokoki kokamwa te ete Yehova azali kosɛnga biso tózala na boboto. Ndenge Mika 6:8 elobi yango, basaleli ya Nzambe basengeli ‘kolinga boboto.’ Kasi, boboto ezali mpenza nini? Ezaleli yango ezali na boyokani nini na bizaleli mosusu ya malamu? Atako bato bazali na likoki ya komonisa boboto, mpo na nini mokili etondi na mabe? Mpo na nini biso baklisto tosengeli kosala makasi mpo na komonisela bato mosusu boboto?
Boboto ezali nini?
3. Boboto ezali nini?
3 Moto amonisaka boboto na koluka bolamu ya basusu. Amonisaka yango na misala ya kosunga basusu mpe na maloba ya boboto. Kozala na boboto elimboli kosala malamu, kasi mabe te. Moto ya boboto azalaka moninga ya bato, azalaka motema mpɛmbɛ, ayebaka mpasi ya basusu, mpe azalaka na ngɔlu. Azalaka motema malamu mpe amemyaka basusu. Ntoma Paulo apesaki baklisto toli oyo: “Bólata bolingo ya motema oyo euti na mawa, motema malamu, elimo ya komikitisa, boboto mpe motema molai.” (Bakolose 3:12) Maloba yango ezali komonisa ete boboto ezali na kati ya molato oyo moklisto nyonso ya solo asengeli kolata.
4. Na ndenge nini Yehova abandaki mpenza komonisela bato boboto?
4 Yehova Nzambe nde abandaki mpenza komonisa boboto. Ndenge Paulo alobaki yango, ezali na ntango oyo “motema malamu [to boboto] mpe bolingo oyo euti epai ya Mobikisi na biso, Nzambe, mpo na moto emonisamaki polele” nde “abikisaki biso na nzela ya bosukoli oyo ememaki biso na bomoi mpe na ndenge akómisaki biso sika na lisalisi ya elimo santu.” (Tito 3:4, 5) Nzambe ‘asukoli,’ to apɛtoli, baklisto bapakolami na makila ya Yesu, elingi koloba ete mpo na mbeka oyo Klisto apesaki, andimi kolimbisa bango. Lisusu, bakómisi bango sika na lisalisi ya elimo santu, bakómi ‘bikelamu ya sika’ to bana ya Nzambe. (2 Bakolinti 5:17) Nzambe amonisi mpe boboto ná bolingo na ye epai ya “ebele ya bato”; bango “basukoli bazambala na bango mpe bakómisi yango mpɛmbɛ na kati ya makila ya Mwana-Mpate.”—Emoniseli 7:9, 14; 1 Yoane 2:1, 2.
5. Mpo na nini bato oyo bazali na elimo ya Nzambe basengeli komonisela basusu boboto?
5 Boboto ezali mpe na kati ya mbuma ya elimo santu, to nguya ya Nzambe. Paulo alobaki boye: “Mbuma ya elimo ezali bolingo, esengo, kimya, motema molai, motema malamu, bolamu, kondima, boboto, komipekisa. Ezali na mobeko ata moko te oyo ezali kotɛmɛla makambo wana.” (Bagalatia 5:22, 23) Yango wana, ebongi mpenza ete bato oyo bazali na elimo ya Nzambe bámonisela basusu boboto!
Boboto ya solosolo ezali bolɛmbu te
6. Ntango nini boboto ekómaka bolɛmbu, mpe mpo na nini?
6 Bato mosusu bakanisaka ete boboto ezali bolɛmbu. Mpo na bango, moto asengeli kozala na makambo makasi, ata mpe na nko, mpo bámona ye ete alingaka masɛki te. Nzokande, soki totali malamu, kozala na boboto mpenza mpe koboya kolakisa boboto ya lokuta nde ezalaka lisɛki te. Lokola boboto ya solosolo ezali na kati ya mbuma ya elimo ya Nzambe, yango ekoki te kozala ezaleli ya kokanga miso na etamboli ya mabe to kondima yango. Nzokande, boboto ya mabe ezali bolɛmbu oyo etindaka moto akanga miso na misala ya mabe.
7. (a) Eliya amonisaki bopɔtu na likambo nini? (b) Mpo na nini bankulutu basengeli kokeba ete bámonisa boboto ya mabe te?
7 Tózwa ndakisa ya Eliya, nganga-nzambe monene ya Yisalaele. Azalaki na bopɔtu mpo na kosembola bana na ye, Ofini ná Fineasi, oyo bazalaki banganga-nzambe na tabenakle. Bana yango bazalaki komona ete biteni ya nyama oyo Mibeko ya Nzambe epesaki bango nzela ya kozwa epai ya bato oyo bazalaki koya na mbeka, ezalaki moke. Yango wana, batyaki moto moko asɛngaka moto nyonso oyo ayei kopesa mbeka nyama ya mobesu liboso ya kotumba mafuta na yango na etumbelo. Bana yango bazalaki mpe kosala pite na basi oyo bazalaki kosala na ekɔtelo ya tabenakle. Kasi, na esika Eliya alongola Ofini ná Fineasi na mosala ya nganga-nzambe, azalaki kaka kopamela bango, na bolɛmbu lisusu. (1 Samwele 2:12-29) Yango wana “liloba ya [Yehova] eyaki mingi epai ya bato na mikolo yango te”! (1 Samwele 3:1) Bankulutu basengeli kokeba ete bámonisa te boboto ya mabe epai ya bato oyo bazali kosala mabe, oyo bakoki kobebisa elimo ya lisangá. Boboto ya solosolo endimaka koyoka maloba ya mabe te, ekangaka mpe miso te na misala oyo eyokani te na mibeko ya Nzambe.
8. Ndenge nini Yesu amonisaki boboto ya solosolo?
8 Yesu Klisto, Ndakisa na biso, amonisaki boboto ya mabe ata mokolo moko te. Apesaki nde ndakisa malamu mingi ya boboto ya solosolo. Na ndakisa, ‘ayokelaki bato mawa, mpo batikamaki mpamba mpe bapalanganisamaki lokola bampate ezangá mobateli.’ Bato ya mitema sembo bazalaki kobanga te kosolola na Yesu; kutu, bamemelaki ye bana na bango. Kanisá boboto mpe motema mawa oyo amonisaki ntango “akamataki bana na mabɔkɔ na ye mpe abandaki kopambola bango.” (Matai 9:36; Malako 10:13-16) Yesu azalaki na boboto, kasi azalaki kozonga nsima te mpo na oyo ezali malamu na miso ya Tata na ye ya likoló. Akangaki miso na mabe ata mokolo moko te; na nguya ya Nzambe, azalaki kobimisa polele mabe ya bakonzi ya mangomba oyo bazalaki bakosi. Ndenge Matai 23:13-26 ezali komonisa yango, azongelaki mbala na mbala maloba oyo: “Mawa na bino, bakomeli mpe Bafalisai, bakosi!”
Boyokani kati na boboto mpe bizaleli mosusu ya malamu
9. Boboto ezali na boyokani nini na motema molai mpe na bolamu?
9 Boboto ezali na boyokani na bizaleli mosusu oyo elimo ya Nzambe epesaka, na ndakisa, motema molai mpe bolamu. Moto oyo aloni boboto amonisaka yango na motema molai. Moto yango azalaka na motema molai ata epai ya bato oyo bazangi boboto. Boyokani ya boboto ná bolamu ezali ete, mbala mingi moto ya boboto asalaka misala oyo ezali mpo na bolamu ya basusu. Na Biblia, liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “boboto” ekoki, na bisika mosusu, kobongolama na “bolamu.” Baklisto ya liboso bazalaki komonisa ezaleli yango na ndenge oyo ezalaki kokamwisa bapakano; yango wana Tertullien alobaki ete bazalaki kobenga bayekoli ya Yesu ete, ‘bato oyo batondá na boboto.’
10. Boyokani nini ezali kati na boboto mpe bolingo?
10 Boboto ezali mpe na boyokani na bolingo. Yesu alobaki na bayekoli na ye boye: “Bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoane 13:35) Mpe na ntina na bolingo yango, Paulo alobaki ete: “Bolingo ezali na motema molai mpe na boboto.” (1 Bakolinti 13:4) Lisusu, boboto ezali na boyokani na bolingo na ezaleli oyo ebengami “motema-boboto,” ezaleli oyo Biblia elobeli mingi. Yango ezali boboto oyo eutaka na bolingo ya sembo. Liloba ya Liebele oyo ebongolami na “motema-boboto” ezali te boboto ya mwa ntango moke to ya likolólikoló. Ezali nde boboto oyo moto amonisaka na eloko oyo alingi tii mokano na ye mpo na eloko yango ekokokisama. Yehova amonisaka motema-boboto, to bolingo ya sembo na ndenge ebele. Na ndakisa, amonisaka yango na misala na ye ya kobikisa mpe ya kobatela.—Nzembo 6:4; 40:11; 143:12.
11. Motema-boboto ya Nzambe ezali kopesa biso elikya nini?
11 Motema-boboto ya Yehova ebendaka bato epai na ye. (Yilimia 31:3) Ntango basaleli ya sembo ya Nzambe bazali na mposa abikisa to asalisa bango, bayebaka ete akomonisela bango motema-boboto na ye. Nzambe akoki te kopimela bango yango. Yango wana, bakoki kobondela na kondima nyonso, lokola mokomi ya nzembo oyo alobaki ete: “Kasi ngai nandimi [motema-boboto, NW] na yo; tiká ete motema na ngai esepela na kobika na yo.” (Nzembo 13:5) Lokola bolingo ya Nzambe ezali sembo, basaleli na ye bakoki kotyela ye motema mobimba. Apesi bango elikya oyo: “[Yehova] akoboya bato na ye te; akotika libula na ye te.”—Nzembo 94:14.
Mpo na nini mokili etondi na mabe?
12. Ntango nini mpe ndenge nini boyangeli ya mabe ebandaki?
12 Mpo na kozwa eyano na motuna yango, tosengeli kotalela makambo oyo elekaki na elanga ya Edene. Na ebandeli, ekelamu moko ya elimo oyo alingaki makambo minene mpe akómaki na lolendo asalelaki mayele mabe mpo na kokóma mokonzi ya mokili. Mayele mabe na ye ememaki ye na kokóma “moyangeli ya mokili oyo,” kasi moyangeli moko ya mabe. (Yoane 12:31) Akómá kobengama Satana Zabolo, monguna monene ya Nzambe mpe ya bato. (Yoane 8:44; Emoniseli 12:9) Mwa moke nsima ya ntango oyo Yehova akelaki Eva, mokano mabe ya Satana ya kotya bokonzi oyo ezali kotɛmɛla bokonzi ya boboto ya Yehova emonanaki polele. Na bongo, boyangeli ya mabe ebandaki ntango Adama aboyaki boboto ya Nzambe mpe aponaki komitambwisa ye moko. (Genese 3:1-6) Kasi, na esika Adama ná Eva bámitambwisa bango moko, bakómaki nde kotambwisama na Zabolo, moto ya moimi mpe ya lolendo; ye nde akómaki mokonzi na bango.
13-15. (a) Tángá mwa ndambo ya mbuma mabe oyo koboya bokonzi ya sembo ya Yehova ebotaki. (b) Mpo na nini mokili etondi na mabe?
13 Tótalela mwa ndambo ya mbuma mabe oyo yango ebotaki. Babenganaki Adama ná Eva na paladiso. Balongwaki na elanga kitoko epai bazalaki komona mpasi te mpo na kozwa ndunda mpe mbuma kitoko mpe bakómaki na esika ya mpasi, na libándá ya elanga ya Edene. Nzambe alobaki na Adama boye: “Mpo ete oyoki monɔkɔ ya mwasi na yo, mpe ete osili kolya mbuma ya nzete epekisaki ngai yo ete, Okolya yango te, mokili elakami mabe na ntina na yo. Okolya na yango na mawa mikolo nyonso ya bomoi na yo. Ekobimisela yo nzete mpe nkamba ya nzubɛ.” Mabe oyo balakelaki mabelé elimbolaki ete kosala bilanga na mabelé yango ekokóma mpasi mingi. Bana ya Adama bomonaki mpenza mabe ya mabelé oyo elakelamaki mabe, ná nzete mpe nkamba ya nzubɛ oyo yango ebimisaki; yango wana, Lameke, tata ya Noa alobelaki ‘bolɔzi mpe mosala makasi ya mabɔkɔ na bango na mokili oyo [Yehova] elakelaki mabe.’—Genese 3:17-19; 5:29.
14 Adama ná Eva babungisaki mpe kimya mpe bakómaki na mitungisi. Nzambe alobaki na Eva boye: “Nakobakisa mpasi na yo ya kobota; okobota bana na mpasi, nde okozala na mposa ya mobali na yo, mpe ye akozala na bokonzi likoló na yo.” Na nsima, Kaina, mwana ya liboso ya Adama ná Eva, abomaki ndeko na ye Abele.—Genese 3:16; 4:8.
15 Ntoma Yoane alobaki ete: “Mokili mobimba ezali kolala na kati ya nguya ya moto mabe.” (1 Yoane 5:19) Lelo oyo, bato ya mokili bazali na bizaleli mabe lokola moimi mpe lolendo, bizaleli oyo euti na moyangeli na yango. Yango wana mokili etondi na mabe mpe na mobulu! Kasi, makambo ekotikala bongo libela te. Na Bokonzi na ye, Yehova akolongola mabe mpe mobulu, mpe akotya boboto mpe motema mawa.
Bato bakomonisa boboto mingi na Bokonzi ya Nzambe
16. Mpo na nini boboto ekozala na boyangeli oyo Nzambe apesi na mabɔkɔ ya Klisto Yesu, mpe yango ezali kotinda biso tósala nini?
16 Yehova ná Yesu Klisto, Mokonzi oyo ye moko aponi, bazali kosɛnga ete bato oyo bango bakoyangela bázala na boboto. (Mika 6:8) Yesu Klisto amonisaki biso mwa moke ndenge oyo boboto ekozala na boyangeli oyo Tata na ye apesi ye. (Baebele 1:3) Tokoki komona yango na nzela ya maloba oyo Yesu alobaki mpo na komonisa mabe ya bakonzi ya mangomba ya lokuta, oyo bazalaki kotyela bato kilo na motó. Alobaki boye: “Bóya epai na ngai, bino nyonso oyo bozali komona mpasi na mosala mpe kokumbisama mikumba, mpe ngai nakopemisa bino. Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe bóyekola epai na ngai, mpo ngai nazali na elimo ya boboto mpe na komikitisa na motema, mpe bokozwa kopema mpo na milimo na bino. Mpo ekanganeli na ngai ezali ya pɛtɛpɛtɛ mpe mokumba na ngai ezali pɛpɛlɛ.” (Matai 11:28-30) Lelo oyo, bakonzi mingi ya mokili, ná bakonzi ya mangomba mpe bakonzi mosusu, bazali kotyela bato ebele ya mibeko mpe kosɛnga bango makambo oyo ezali lokola kilo na mitó na bango. Nzokande, makambo oyo Yesu azali kosɛnga bayekoli na ye eyokani na bamposa mpe makoki na bango. Na ntembe te, ekanganeli na ye ezali mpenza pɛtɛpɛtɛ! Mitema na biso ezali kotinda biso te tólanda ndakisa na ye mpe tómonisela basusu boboto?—Yoane 13:15.
17, 18. Mpo na nini tosengeli kozala na elikya ete bato oyo bakoyangela na Klisto na likoló mpe baoyo bakozala bamonisi na ye awa na mabelé bakozala na boboto?
17 Toli ya malamu mingi oyo Yesu apesaki bantoma na ye ezali komonisa bokeseni monene oyo ezali kati na boyangeli ya Nzambe mpe boyangeli ya bato. Biblia elobi boye: “Ntembe makasi ebimaki mpe na kati na bango [bayekoli] mpo na koyeba soki nani na bango amonani ete aleki bango nyonso. Kasi alobaki na bango ete: ‘Bakonzi ya bikólo mosusu bamityaka bankolo likoló na bango, mpe baoyo bazali na bokonzi likoló na bango babengami Basali-Bolamu. Nde, bino bosengeli kozala bongo te. Kasi tiká ete moto oyo aleki na kati na bino akóma lokola leki ya nsuka mpenza, mpe moto oyo azali kosala lokola mokonzi azala lokola mosali. Mpo nani aleki, moto oyo afandi na mesa to oyo azali mosali? Ezali moto oyo afandi na mesa, boye te? Kasi ngai nazali na katikati na bino lokola mosali.’”—Luka 22:24-27.
18 Bato oyo bazali na bokonzi ‘bamityaka bankolo’ mpo na kozwa lokumu mpe balingaka batitre ya mineneminene, bakanisaka ete batitre yango ekokómisa bango bato minene koleka baoyo bango bazali koyangela. Kasi, Yesu alobaki ete moto monene ezali nde ye oyo asalelaka basusu na motema mobimba mpe na bolingo. Bato nyonso oyo bakoyangela na Klisto na likoló to baoyo bakozala bamonisi na ye awa na mabelé basengeli kosala makasi mpo na kolanda ndakisa na ye ya komikitisa mpe ya boboto.
19, 20. (a) Ndenge nini Yesu amonisaki bonene ya boboto ya Yehova? (b) Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yehova na oyo etali komonisa boboto?
19 Tótalela toli mosusu ya malamu oyo Yesu apesaki. Mpo na komonisa bonene ya boboto ya Yehova, Yesu alobaki boye: “Soki bozali kolinga baoyo balingaka bino, yango ezali na litomba nini mpo na bino? Mpo ata basumuki mpe balingaka baoyo balingaka bango. Mpe soki bozali kosala malamu na baoyo basalelaka bino malamu, yango ezali mpenza na litomba nini mpo na bino? Ata basumuki mpe basalaka bongo. Lisusu, soki bozali kodefisa kozanga koluka matabisi epai ya baoyo bozali na elikya ete bakozongisela bino, yango ezali na litomba nini mpo na bino? Ata basumuki mpe badefisaka kozanga koluka matabisi epai ya basumuki mosusu mpo na nsima bázwa oyo ekokani. Nzokande, bino bókoba kolinga banguna na bino mpe kosala malamu mpe kodefisa kozanga koluka matabisi, kozanga ete bólikya kozwa mwa eloko na nsima; mpe mbano na bino ekozala ya monene, mpe bokozala bana ya Oyo-Aleki-Likoló, mpamba te ye azali na boboto epai ya bato oyo bazangi botɔndi mpe bato mabe. Bókoba kokóma bato ya motema mawa, ndenge Tata na bino azali moto ya motema mawa.”—Luka 6:32-36.
20 Boboto ya malamu ezalaka na moimi te. Esɛngaka eloko te mpe elikyaka kozwa lifuti te. Na boboto na ye, Yehova “asalaka ete moi na ye ebima likoló ya bato mabe mpe bato malamu mpe asalaka ete mbula enɔka likoló ya bayengebene mpe bato bazangi boyengebene.” (Matai 5:43-45; Misala 14:16, 17) Lokola Tata na biso ya likoló, toboyaka kosala mabe epai ya bato oyo bazangi botɔndi, tosalelaka bango malamu, ata baoyo bazali banguna na biso. Boboto na biso emonisaka Yehova ná Yesu ete tozali na mposa ya kokɔta na Bokonzi ya Nzambe, epai bato nyonso bakomonisana boboto mpe bizaleli mosusu ya malamu.
Mpo na nini tosengeli komonisa boboto?
21, 22. Mpo na nini tosengeli komonisa boboto?
21 Ezali na ntina mingi moklisto ya solo amonisaka boboto. Yango emonisaka ete azali na elimo ya Nzambe. Lisusu, ntango tozali komonisa boboto ya solo, tozali kolanda ndakisa ya Yehova Nzambe mpe ya Klisto Yesu. Lisusu, basɛngi epai ya bato oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela ete bázala na boboto. Yango wana, tosengeli kolinga boboto mpe komonisa yango.
22 Na ndakisa na makambo nini tokoki komonisa boboto na bomoi na biso ya mokolo na mokolo? Lisolo oyo elandi ekolobela yango.
Okopesa eyano nini?
• Boboto ezali nini?
• Mpo na nini mokili etondi na mabe mpe na mobulu?
• Nini emonisi biso ete na bokonzi ya Nzambe, bato bakozala na boboto mingi?
• Mpo na nini ezali na ntina mingi bato oyo balingi kozala na mokili oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela bámonisa boboto?
[Elilingi na lokasa 13]
Bankulutu basalaka makasi bázala na boboto epai ya bampate
[Elilingi na lokasa 15]
Yehova akozanga te komonisela basaleli na ye motema-boboto na ntango ya mpasi
[Bililingi na lokasa 16]
Na boboto na ye, Yehova angɛngisaka moi mpe anɔkisaka mbula mpo na bato nyonso