Tyáká likebi epai ya baboti oyo babɔkɔlaka bana bango moko
BABOTI oyo babɔkɔlaka bana bango moko bazalaka na makambo oyo esɛngaka bango ntango mingi koleka mpe basalaka mosala makasi koleka bato mosusu nyonso. Mikakatano oyo bakutanaka na yango eleki mingi. Basengeli kokokisa mikumba mingi mpo na kobɔkɔla bana na bango. Longola mosala oyo basalaka mpo na kozwa mwa mbongo, basengeli mpe kokendaka kosomba biloko, kolamba, kosukola ndako, mpe kokokisa mokumba na bango ya moboti. Na nsima, basengeli mpe kokende na bana na lopitalo ntango babɛli, kominanola ná bango, mpe kosalisa bana mpo na makambo oyo ezali kotungisa bango na motema, mpe soki likoki ezali koluka mpe mwa ntango mpo na makambo na bango moko.
Atako baboti oyo babɔkɔlaka bana bango moko bazali se kokóma mingi, ekoki kosalema ete bato bátyelaka bango mpenza likebi te. Mama moko alobaki polele boye: “Liboso nazalaki koyeba mpenza te ndenge oyo moboti oyo azali kobɔkɔla bana ye moko ayokaka, tii ntango ngai moko nakɔtaki na molɔngɔ wana nde nayaki koyeba mpasi yango.” Okoki kosala nini mpo na kotyela baboti oyo babɔkɔlaka bana bango moko likebi? Okoki mpenza komibanzabanza mpo na bango? Tótalela bantina misato oyo tosengeli kotya likebi na bamposa na bango.
Bantina oyo tosengeli kotyela bango likebi
Baboti mingi oyo babɔkɔlaka bana bango moko bazalaka na mposa ya lisalisi. Mwasi moko ya mbula 41, oyo mobali na ye akufá oyo azali na bana mibale alobaki boye: “Ekómaka bantango mosusu nayebaka mpenza te nasala nini, namonaka lokola mikumba na ngai eleki kilo.” Kokufela molongani, kotikala yo moko, mpe mikakatano mosusu etindá baboti mingi bákóma na mayoki lokola mama moko oyo alobaki ete: “Tosɛngaka libɔndisi, kasi tozwaka yango mpenza te!”
Esalaka ete yo moko mpe ozala na esengo. Ekómelá yo te osalisa moto moko na komema mokumba moko oyo ezalaki kilo mpo moto moko amema? Soki ezali bongo, na ntembe te oyokaki esengo ndenge omonaki ete osali likambo moko mpo na kosalisa moto yango. Ndenge moko, baboti oyo babɔkɔlaka bana bango moko bamemaka mokumba oyo ntango mosusu ezalaka kilo mingi mpo moto moko amema. Soki ondimi kosalisa bango, okomona bosolo ya maloba ya Nzembo 41:1 oyo elobi ete: “Esengo na moto oyo azali kotya likebi na moto oyo azangá.”
Esepelisaka Nzambe. Yakobo 1:27 elobi boye: “Losambo oyo ezali pɛto mpe na mbindo te na miso ya Nzambe na biso mpe Tata yango oyo: kosalisa bitike ná basi oyo mibali bakufá na bolɔzi na bango.” Yango esɛngi mpe kosunga baboti oyo bazali kobɔkɔla bana bango moko.a Baebre 13:16 elobi boye: “Bóbosana te kosala malamu mpe kokabela bamosusu biloko, mpo Nzambe asepelaka mpenza na bambeka ya ndenge wana.”
Lokola toyebi bantina wana misato oyo tosengeli kotyela baboti oyo bazali kobɔkɔla bana bango moko likebi, tótala sikoyo likambo oyo okoki kosala mpo na kosalisa mpe ndenge nini okoyeba ete lisungi oyo okopesa ekozala ya malamu mpenza.
Tosengeli koyeba bamposa na bango
Ekoki komonana lokola ete likambo ya liboso oyo osengeli kosala ezali ya kotuna moboti oyo abɔkɔlaka bana ye moko, “ndenge nini nakoki kosalisa yo?” Kasi, mpo na koloba solo, soki otuni bongo, ezalaka mpasi mpo moto ayebisa yo likambo oyo azali na yango mpenza mposa. Ndenge tomonaki yango liboso, Nzembo 41:1 elobi ete tosengeli “kotya likebi.” Buku moko elimboli ete liloba ya Ebre oyo esalelami awa ekoki kolimbola “likoki ya kokanisa liboso na makambo oyo ezali komonana mpasi mpo na kozwa ekateli ya bwanya.”
Yango wana, mpo na koyeba lolenge malamu ya kosalisa, osengeli kotya likebi mpenza na mikakatano oyo moboti oyo azali kobɔkɔla bana ye moko akutanaka na yango. Talelá likambo yango na likebi mpenza, kasi likolólikoló te. Omituna boye: ‘Soki nazalaki na esika na ye, nalingaki kozala na mposa ya lisalisi nini?’ Na ntembe te, baboti mingi oyo babɔkɔlaka bana bango moko bakoyebisa yo ete ata soki osali ndenge nini, okoyeba te mpasi ya kobɔkɔla bana yo moko, lobá kaka soki yo moko mpe ozali kobɔkɔla bana yo moko. Kasi, soki ozali kosala nyonso mpo na komitya na esika na bango, yango ekosalisa yo ‘otya likebi’ epai ya baboti oyo babɔkɔlaka bana bango moko.
Landá ndakisa ya kokoka ya Nzambe
Na oyo etali kotyela baboti oyo bazali kobɔkɔla bana bango moko likebi, moto moko te asalá yango na bolingo mpe malamu koleka Yehova Nzambe. Bavɛrsɛ mingi emonisi likebi mpe komibanzabanza oyo Yehova Nzambe amoniselaka basi oyo mibali na bango bakufá, bana oyo batata bakufá ata mpe baboti oyo babɔkɔlaka bana bango moko. Soki totaleli lolenge oyo Nzambe akokisaka bamposa ya bato wana, tokoki kozwa mpenza liteya na likambo etali kopesa lisalisi oyo ebongi mpenza. Ezali na makambo minei ya ntina oyo tosengeli kotalela.
Zwáká ntango ya koyoka bango
Na Mibeko oyo apesaki na Yisraele, Yehova alobaki ete ‘akoyoka solo kolela’ ya bato oyo bazali konyokwama. (Kobima 22:22, 23) Ndenge nini okoki kolanda ndakisa kitoko wana? Mbala mingi, baboti oyo babɔkɔlaka bana bango moko, bamiyokaka ete bazali bango moko, bazali na mokóló mosusu te ya kosolola na ye. Moboti moko oyo abɔkɔlaka bana ye moko amilelaki boye: “Soki bana bakei kolala, na bantango mosusu nalelaka kaka. Na bantango mosusu kozala yo moko ezalaka mpasi mingi.” Soki esengeli, okoki kondima ‘koyoka kolela’ ya moboti oyo abɔkɔlaka bana ye moko, oyo akoki kozala na mposa ya moto oyo akofungolela ye motema? Kozwa ntango ya koyoka ye na likebi na ntango oyo ebongi mpenza ekoki kosalisa moboti yango alonga mokakatano na ye.
Lobá maloba ya kolendisa
Na lisalisi ya elimo santu, Yehova akomisaki nzembo mosantu oyo Bayisraele basengelaki koyembaka na ntango ya losambo. Kanisá libɔndisi oyo basi ya Yisraele, oyo mibali bakufá mpe bana oyo batata bakufá bazalaki kozwa ntango bazalaki koyemba maloba wana oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu ya Nzambe oyo ezalaki kokundwela bango ete Yehova azali “tata” mpe “mosambisi” na bango mpe ete akokaki kobɔndisa bango. (Nzembo 68:5; 146:9) Biso mpe tokoki koloba maloba ya kobɔndisa oyo ekoki kosala ete moboti oyo abɔkɔlaka bana ye moko abosana yango te na boumeli ya bambula mingi. Atako eleki sikoyo bambula 20, Ruth, mama moko oyo abɔkɔlaka bana ye moko, abosanaka te mokolo oyo tata moko alobaki na ye boye: “Ozali mpenza kosala mosala malamu na ndenge ozali kobɔkɔla bana na yo mibale ya mibali. Kolɛmba te.” Ruth alobi boye: “Koyoka maloba wana esimbaki mpenza motema na ngai.” Ya solo, “maloba ya boboto ezalaka lokola nkisi” mpe ekoki kolendisa moboti oyo azali kobɔkɔla bana ye moko na ndenge oyo tokoki kokanisa te. (Masese 15:4, Contemporary English Version) Okoki kokanisa na maloba ya sikisiki oyo okoki koyebisa moboti oyo abɔkɔlaka bana ye moko mpo na kopesa ye longonya?
Pesá mbongo to biloko mosusu ntango esengeli
Na Mibeko oyo Yehova apesaki Bayisraele, ezalaki mpe na bibongiseli oyo ezwamaki mpo basi oyo mibali bakufá mpe bana oyo batata bakufá bazwaka bilei oyo basengeli na yango na ndenge ebongi. Na nzela ya bibongiseli yango, bato yango bazalaki na biloko mingi ya “kolya . . . mpe kotonda.” (Kolimbola Mibeko 24:19-21; 26:12, 13) Biso mpe, kozanga ete lobɔkɔ ya mwasi eyeba, mpe na ndenge oyo ebongi, tokoki kokabela moboti oyo azali kobɔkɔla bana ye moko mbongo to biloko, ntango azali na bosɛnga. Okoki kokende kotikela bango na ndako biloko ya kolya to matungulu, ndɛmbi, pilipili mpe biloko mosusu ya ndenge wana? Ozali na bilamba oyo moboti yango to bana na ye bakoki kolata? To okoki kopesa mwa mbongo oyo moboti yango akoki kosomba biloko mosusu oyo libota ezali na mposa na yango?
Lekisáká ntango elongo na bango
Yehova asɛngaki Bayisraele ete bábosanaka te basi oyo mibali bakufá mpe bana oyo batata bakufá na bafɛti oyo ezalaki kosalema mbula na mbula na ekólo Yisraele, epai bakokaki kozala na libaku ya kozala elongo na bandeko na bango Bayisraele. Kutu, ayebisaki bango ete: “Osengeli kosepela.” (Kolimbola Mibeko 16:10-15) Ndenge moko lelo, bakristo balendisami ete ‘báyambanaka,’ bálukaka mabaku ya kosepela elongo. (1 Petro 4:9) Na yango, mpo na nini te kobenga na ndako na yo, moboti moko oyo abɔkɔlaka bana ye moko mpe bana na ye mpo bólya elongo? Ezali kosɛnga makambo ya mindɔndɔ te. Mokolo moko, ntango azalaki na ndako ya baninga na ye, Yesu alobaki boye: “Kaka biloko moke nde ezali na ntina, to moko kaka.”—Luka 10:42.
Bakosepela soki ozali kotyela bango likebi
Kathleen, mama moko oyo abɔkɔlaki bana misato ye moko, alobi ete akobosana soki moke te toli ya bwanya oyo: “Kozela eloko moko te; monisáká botɔndi na makambo nyonso.” Ndenge moko na Kathleen, baboti mingi oyo babɔkɔlaka bana bango moko bayebaka mokumba oyo bazali na yango ya kobɔkɔla bana na bango, bango moko. Yango wana, bazelaka te ete basusu básalela bango makambo oyo bango moko basengeli kosala. Nzokande, ntembe ezali te ete bazalaka na botɔndi mpo na lisungi nyonso oyo bazwaka. Okoki kopesa mabɔkɔ mpo na bolamu na bango mpe mpo na esengo na yo moko soki ozali kotyela baboti oyo babɔkɔlaka bana bango moko likebi, mpe ozali kotya motema ete Yehova Nzambe “akozongisela [yo] malamu maye [o]sali.”—Masese 19:17, Biblia Liloba lya Nzambe.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Atako maloba “moboti oyo abɔkɔlaka bana ye moko” ezali na Biblia te, maloba “mwasi oyo mobali akufá” mpe “mwana oyo tata akufá” esalelami mbala mingi. Yango emonisi ete baboti oyo bazalaki kobɔkɔla bana bango moko bazalaki mpe na ntango ya kala.—Yisaya 1:17.
[Elilingi na lokasa 24]
Mbala ya nsuka oyo obengaki moboti oyo abɔkɔlaka bana ye moko mpe bana na ye mpo bólya elongo, ezalaki mokolo nini? Soki te, mpo na nini te kosala yango nokinoki?