SEKELE MPO NA LIBOTA YA ESENGO
Okosala nini soki mwana na yo azali ebɔsɔnɔ?
CARLO:a “Angelo, mwana na biso ya mobali azali na maladi oyo esalaka ete moto azala mayele te (trisomie 21). Maladi na ye esilisaka biso makasi ezala na nzoto to na makanisi. Kanisá naino makasi oyo esɛngaka mpo na kobatela mwana oyo azali nzoto makasi, sikoyo, bakisá makasi yango mbala 100. Na bantango mosusu ebimisaka mikakatano na libala na biso.”
MIA: “Esɛngaka kozala na molende mpe kozala mpenza motema molai mpo na koteya Angelo ata mwa makambo ya mikemike. Soki nalɛmbi mpenza, naumelaka te kosilikela Carlo, mobali na ngai. Na bantango mosusu, toyokanaka te na makambo mosusu mpe na nsima toswanaka.”
Ozali koyeba lisusu mokolo oyo mwana na yo abotamaki? Na ntembe te ozalaki na esengo ya komema bebe na yo. Kasi mpo na baboti lokola Carlo mpe Mia, esengo yango ebongwanaki mawa ntango bayebisaki bango ete mwana na bango azali maladi to ebɔsɔnɔ.
Mwana na yo azali ebɔsɔnɔ? Mbala mosusu ozali komituna soki okolonga likambo yango. Soki ezali bongo, kolɛmba nzoto te. Baboti lokola yo balongaki mpe likambo ya ndenge wana. Talelá mikakatano misato oyo okoki kokutana na yango mpe ndenge toli ya Biblia ekoki kosalisa yo.
MOKAKATANO 1: OZALI KONDIMA TE ETE MWANA NA YO AZALI MALADI.
Baboti mingi basilaka mayele soki bayebisi bango ete mwana na bango azali maladi. Juliana mama moko na Mexique alobi boye: “Ntango doktɛrɛ ayebisaki ngai ete mwana na biso Santiago azali na maladi moko na bɔɔngɔ oyo ekómisaka moto paralize, nandimaki te. Natambolaki motó.” Bato mosusu bakoki koyoka lokola Villana mama moko ya Italie oyo alobaki boye: “Nazalaki na mposa ya kobota atako ezalaki likama mpo na basi ya mbula na ngai. Sikoyo, nayokaka lokola namemi ngambo ntango mwana na ngai anyokwamaka na maladi ya trisomie 21.”
Soki ozali komiyoka lokola ete olɛmbi nzoto to omemi ngambo, yebá ete ezali mabe te. Na ebandeli, Nzambe akanaki te ete bato babɛlaka. (Ebandeli 1:27, 28) Asalá baboti te na likoki ya kondima na pɛtɛɛ nyonso likambo oyo ebongi te. Na yango, ezali mabe te oyoka “mawa” mpo na oyo ekómeli mwana na yo. Ekosɛnga mwa ntango mpo olonga mpe omesana na likambo yango.
Okosala nini soki ozali komipesa foti mpo na maladi ya mwana na yo? Kobosana te ete moto moko te ayebaka mpenza ndenge makambo oyo tozwá epai ya bankɔkɔ, esika tofandaka to makambo mosusu esalaka na nzoto ya mwana. Epai mosusu, okoki kobanda kopesa molongani na yo foti. Tɛmɛlá makanisi ya ndenge wana. Ekozala malamu bópesana mabɔkɔ ná molongani na yo mpe bótya makanisi na bino na kobatela mwana.—Mosakoli 4:9, 10.
OKOKI KOSALA BOYE: Luká koyeba maladi ya mwana na yo. Biblia elobi boye: “Esɛngaka bwanya mpo na kozala na libota ya malamu, mpe mayele mpo na kokómisa yango makasi.”—Masese 24:3, Biblia New Century Version.
Okoki koyeba makambo mingi epai ya minganga mpe na mikanda mosusu. Okoki kokokanisa koluka koyeba maladi ya mwana na yo na koyekola monɔkɔ ya sika. Na ebandeli ekozala mpasi, kasi okoki koyekola yango.
Carlo mpe Mia oyo tolobelaki na ebandeli, balukaki koyeba makambo mosusu epai ya monganga na bango mpe na ebongiseli moko oyo etalaka maladi ya mwana na bango. Balobi boye: “Yango esalisaki biso tóyeba makambo oyo tokokutana na yango mpe ‘makambo oyo moto ya maladi yango akoki kosala.’ Tomonaki ete na makambo mingi, mwana na biso akoki kozala na bomoi lokola oyo ya bato nyonso. Yango ebɔndisaki biso mingi.”
MEKÁ KOSALA BOYE: Tyá miso na makambo oyo mwana na yo akoki kosala. Bongisá makambo oyo bokosala libota mobimba. Ntango mwana na yo asali ata mwa “likambo moko ya malamu,” pesá ye longonya mpe sepelá elongo na ye.
MOKAKATANO 2: OMONI ETE OLƐMBI MPE OZANGI MOTO YA KOSOLOLA NA YE.
Okoki komiyoka lokola kobatela mwana na yo oyo abɛlaka ezali kosilisa yo makasi. Jenney, mama moko na Nouvelle-Zélande alobi boye: “Mwa mikolo moke nsima ya koyeba ete mwana na ngai azali na maladi moko na mokuwa ya mokɔngɔ (Spina-bifida), nazalaki kolɛmba mpe kolela soki nasali mosala mingi na ndako koleka ndenge nasalaka.”
Mokakatano mosusu ezali ete okoki komiyoka ete osundolami. Ben azali na mwana oyo abɛlaka maladi oyo ekɔndisaka misisa (dystrophie musculaire) mpe maladi oyo esalaka ete moto azala na mokakatano ya koyokana na basusu (syndrome d’Asperger). Alobi boye: “Bato mingi bayebaka te ndenge oyo bomoi na biso ezali.” Okoki kosepela koyebisa yango moto mosusu. Kasi, baninga na yo mingi bazali na bana oyo bazali nzoto malamu. Na yango, okoki kokakatana mpo na koyebisa bango ndenge oyo ozali komiyoka.
OKOKI KOSALA BOYE: Luká lisungi mpe soki bapesi yo, ndimá yango. Juliana oyo tolobelaki alobi boye: “Na bantango mosusu ngai ná mobali na ngai toyokaka nsɔni mpo na kosɛnga lisungi. Kasi, tomonaki ete tozali kaka na mposa ya lisalisi ya basusu. Ntango basalisaka biso, tomonaka ete tozali biso moko te.” Soki moninga to ndeko moko ya libota asɛngi afanda esika moko na mwana na yo na fɛti to na makita, koboya te. Lisese moko ya Biblia elobaka boye: “Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso, mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.”—Masese 17:17.
Kipe mpe nzoto na yo. Kaka ndenge esɛngaka kotya esansi mbala na mbala na ambulance mpo ekoba komema bato ya maladi na lopitalo, yo mpe osengeli kolyaka malamu, kosalaka ngalasisi, mpe kopemaka mpo okoba kobatela mwana na yo. Javier, oyo azali na mwana ya ebɔsɔnɔ alobi boye: “Mwana na ngai atambolaka te, yango wana namonaka ete ebongi nalyaka malamu. Kutu ngai nde natambwisaka ye. Makolo na ngai ezali makolo na ye!”
Ndenge nini okoki kozwa ntango ya kobatela nzoto na yo? Baboti mosusu bakipaka mwana na bango moto na moto na ngala na ye. Boye, moboti moko akoki kopema to kosala makambo mosusu. Atako ekoki kozala mpasi, osengeli kozwa ntango oyo osalelaka na makambo oyo ezali na ntina mingi te mpe kosalela yango mpo na kobatela nzoto na yo. Kasi ndenge Mayuri, mama moko na Inde alobi, “nsukansuka okomesana.”
Sololá na moninga moko oyo otyelaka motema. Ata baninga oyo bazali te na bana oyo babɛlaka bakoki mpe kobɔndisa yo. Okoki mpe kobondela Yehova Nzambe. Libondeli ekosalisa yo mpenza? Yazmin oyo azali na bana mibale oyo babɛlaka maladi moko ya mpema mpe ya libumu (mucoviscidose) alobi boye: “Na bantango mosusu mitungisi ezalaki makasi mpe nazalaki koyoka lokola batye ngai nsinga na kingo.” Kasi, abakisi boye: “Nabondelaka Yehova mpo akitisa ngai motema mpe apesa ngai makasi. Na nsima namonaka ete nakoki koyikela yango mpiko.”—Nzembo 145:18.
MEKÁ KOSALA BOYE: Talelá lisusu biloko oyo olyaka, ntango oyo osalaka ngalasisi, mpe bangonga oyo olekisaka na mpɔngi. Talelá ndenge oyo okoki kotika makambo mosusu ya mikemike mpo ntango yango esalisa yo obatela nzoto na yo. Kobá kobongisa programɛ na yo soki esengeli.
MOKAKATANO 3: KOTYELA MWANA YANGO LIKEBI MINGI KOLEKA BATO NYONSO YA LIBOTA.
Maladi ya mwana ekoki kobongola makambo mingi na libota, na ndakisa: biloko oyo bolyaka, esika oyo bokendaka, mpe ntango oyo baboti balekisaka ná mwana mokomoko. Yango ekoki kosala ete bana mosusu bamona ete bakipaka bango te. Lisusu, baboti bakoki komipesa mingi na kobatela mwana na bango oyo azali kobɛla mpe yango ekoki kobimisa mikakatano na libala. Lionel, papa moko na Libéria alobi boye: “Na bantango mosusu mwasi na ngai alobaka ete asalaka mosala mingi ye moko kasi ngai nakipaka mwana na biso te. Namonaka lokola atosaka ngai te, mpe na bantango mosusu, nakatelaka ye mangala.”
OKOKI KOSALA BOYE: Mpo bana nyonso bámona ete okipaka bango, bongisá makambo oyo esepelisaka bango. Jenney oyo tolobelaki alobi boye: “Ntango mosusu, tosalelaka mwana na biso ya liboso likambo moko ya malamu mpenza ata soki touti kolya na restora oyo alingaka mingi.”
Mpo na kobatela libala na yo, sololáká mpe bondelaká ná molongani na yo. Aseem, papa moko na Inde oyo bana na ye babɛlaka maladi ya ndɛkɛ alobi boye: “Atako na bantango mosusu ngai ná mwasi na ngai tomiyokaka ete tolɛmbi to tozali na nkanda, tozwaka ntango ya kosolola mpe kobondela elongo. Mikolo nyonso na ntɔngɔ, liboso bana na biso bálamuka, tolekisaka ntango elongo mpo na kotalela vɛrsɛ moko ya Biblia.” Babalani mosusu basololaka kaka bango moko liboso ya kolala. Masolo ya bino mibale mpe mabondeli na bino ya sembo ekoki kopesa bino makasi na ntango ya mpasi. (Masese 15:22) Mwasi moko ná mobali na ye balobaki boye: “Bantango ya mpasi oyo tolekisá etiká biso na basuvenire mingi ya malamu.”
MEKÁ KOSALA BOYE: Pesaká bana na yo mosusu longonya mpo na lisalisi nyonso oyo bazali kopesa mwana oyo abɛlaka. Mbala na mbala moniseláká bana mpe molongani na yo bolingo mpe botɔndi.
KOBUNGISA ELIKYA TE
Biblia elaki ete mosika te Nzambe akosilisa maladi nyonso oyo ezali konyokola bilenge mpe mikóló. (Emoniseli 21:3, 4) Na ntango yango, “moto moko te . . . akoloba: ‘Nazali na maladi.’”b—Yisaya 33:24.
Ata mpe sikoyo, okoki kolonga ata soki mwana na yo azali ebɔsɔnɔ. Carlo ná Mia oyo tolobelaki na ebandeli balobi boye: “Kolɛmba nzoto te soki omoni lokola ete makambo ezali kotambola malamu te. Tyá likebi na makambo mingi ya malamu oyo mwana na yo azali kosala.”
a Na lisolo oyo bankombo mosusu ezali ya bango te.
b Okoki kotánga makambo mosusu oyo etali elaka ya kozala nzoto kolɔngɔnɔ oyo Biblia elobeli, na mokapo 3 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.
OMITUNA BOYE . . .
Nasalaka nini mpo nabatela nzoto, makanisi mpe boyokani na ngai ná Nzambe?
Mbala ya nsuka oyo napesaki bana na ngai longonya mpo na lisungi oyo bapesaka, ezalaki mokolo nini?