Boboto—Ezaleli oyo tokoki komonisa na maloba mpe na misala
MOTEMA ekitaka mpenza soki moto alobi to asaleli biso likambo na boboto. Soki moto moko azali kotyela biso likebi, tosepelaka. Lokola moto nyonso alingaka básalela ye makambo na boboto, ndenge nini tokoki kokolisa ezaleli yango ya malamu?
Kozala na boboto elimboli koluka na motema moko bolamu ya basusu. Esɛngaka koloba mpe kosalela basusu makambo oyo ekosalisa bango. Lokola boboto emonanaka mpe na misala, komonisa kaka bonkonde to bizaleli malamu na miso ya bato ekoki te. Moto oyo azali na boboto ya solosolo alingaka bato mpe amityaka na esika na bango. Longola yango, boboto ya ndenge wana ezali na kati ya mbuma ya elimo oyo Biblia esɛngi bakristo bákolisa. (Bagalatia 5:22, 23) Tosengeli kokolisa boboto; na yango tótala ndenge Yehova ná Mwana na ye bamonisaka ezaleli yango mpe ndenge oyo tokoki komekola bango.
YEHOVA AMONISELAKA BATO NYONSO BOBOTO
Yehova amonisaka boboto na ye epai ya bato nyonso, ata mpe “baoyo bazangi botɔndi mpe bato mabe.” (Luka 6:35) Na ndakisa, Yehova “abimiselaka bato mabe ná bato malamu moi na ye mpe anɔkiselaka bayengebene ná bato oyo bazangi boyengebene mbula.” (Matai 5:45) Na yango, ata bato oyo bandimaka te ete Yehova nde Mozalisi na bango basepelaka na misala na ye ya boboto mpe bakoki koyoka esengo.
Tokoki komona boboto ya Yehova na likambo oyo asalaki mpo na Adama ná Eva. Mwa moke nsima ya kosala lisumu, Adama ná Eva “batongaki nkasa ya figi mpe bamisalelaki biloko ya kozipa loketo.” Kasi, Yehova ayebaki ete bakozala na mposa ya kozipa nzoto malamu ntango bakobima na Edene, mpo mabele elakelamaki mabe mpe ekobanda kobimisa “banzubɛ mpe matiti ya nsendensende.” Na yango, na boboto na ye, Yehova asalelaki bango “bilamba milai ya mposo ya nyama.”—Ebandeli 3:7, 17, 18, 21.
Atako Yehova amoniselaka bato nyonso boboto na ye, asalaka yango mingimingi epai ya basaleli na ye ya sembo. Na ndakisa, na mikolo ya mosakoli Zekaria, anzelu moko ayokaki mabe ntango bato batikaki kotonga tempelo ya Yerusaleme. Yehova ayokaki makanisi ya anzelu yango mpe alobaki na ye “na maloba ya malamu, maloba ya kobɔndisa.” (Zekaria 1:12, 13) Yehova asalaki mpe bongo mpo na mosakoli Eliya. Mosakoli yango alɛmbaki nzoto, mpe nsukansuka asɛngaki Yehova atika ye akufa. Yehova ayokaki kolela ya Eliya mpe atindaki anzelu moko apesa ye makasi. Lisusu, Nzambe ayebisaki mosakoli yango ete azali kaka ye moko te. Ntango Eliya ayokaki maloba wana mpe lokola anzelu asalisaki ye, azwaki makasi mpe akobaki kosala mosala na ye. (1 Bakonzi 19:1-18) Kasi, nani alandaki malamumalamu ndakisa ya Yehova na oyo etali komonisa boboto?
YESU AZALAKI NA BOBOTO MINGI MPENZA
Ntango Yesu azalaki awa na mabele, bato bayebaki ete azalaki na boboto mingi. Azalaki na makambo makasimakasi te, mpe azalaki kokonza bato te. Na boboto nyonso, alobaki: “Bóya epai na ngai, bino nyonso oyo bozali komona mpasi na mosala mpe na kokumba mikumba, mpe ngai nakopemisa bino. . . . Mpo ngai nazali na ezaleli ya boboto.” (Matai 11:28-30) Mpo na boboto ya Yesu, bato bazalaki kolanda ye epai nyonso oyo azalaki kokende. Lokola “mawa ekangaki ye,” Yesu aleisaki bango, abikisaki bato ya maladi mpe bibɔsɔnɔ, mpe ateyaki bango “makambo mingi” ya Tata na ye.—Marko 6:34; Matai 14:14; 15:32-38.
Yesu amonisaki mpe ete azalaki na boboto mingi na ndenge azalaki na bososoli mpe azalaki komitya na esika ya basusu. Kutu, ata soki bato bayei na ntango oyo ebongi te, Yesu azalaki koyamba bango nyonso na “boboto.” (Luka 9:10, 11) Na ndakisa, mwasi moko asimbaki bilamba ya Yesu mpo ayebaki ete akobika na maladi na ye ya kotanga makila. Atako na kolanda Mibeko mwasi yango azalaki mbindo, Yesu apamelaki ye te. (Balevi 15:25-28) Ayokelaki ye mawa mpo anyokwamaki mbula 12, mpe alobaki na ye: “Mwana na ngai, kondima na yo ebikisi yo. Kende na kimya, mpe biká na maladi na yo ya mpasi.” (Marko 5:25-34) Yesu azalaki na boboto mpenza!
MOTO YA BOBOTO ASALISAKA BASUSU
Bandakisa oyo touti kolobela emonisi ete soki tozali na boboto, tokosalisa basusu. Yesu amonisaki yango ntango abɛtaki lisolo ya Mosamaria ya motema malamu. Atako Basamaria bazalaki koyokana te na Bayuda, Mosamaria moko ayokelaki Moyuda moko mawa. Bato mabe bayibaki biloko ya Moyuda yango, babɛtaki ye, mpe batikaki ye pene na liwa na nzela. Boboto etindaki Mosamaria wana asalisa ye. Akangaki bampota ya Moyuda yango mpe amemaki ye na ndako oyo bapaya bazalaki kolala. Afutaki mobateli ya ndako yango mbongo mpe alobaki kutu ete akobakisa mbongo soki esengeli.—Luka 10:29-37.
Boboto ekotinda biso tólendisa basusu kaka na misala te, kasi mpe na maloba ya kobɔndisa. Biblia elobi: “Motungisi na kati ya motema ya moto yango nde etindaka motema na ye egumbama, kasi liloba ya malamu esepelisaka [ye].” (Masese 12:25) Soki boboto mpe bolamu etindi biso tólendisa basusu na maloba na biso, tokopesa bango esengo mingi.a Maloba na biso ya boboto ekomonisa ete totyelaka bango likebi mpe bakozwa makasi ya koyikela mikakatano na bango mpiko.—Masese 16:24.
NDENGE YA KOKÓMA NA BOBOTO MINGI
Biso nyonso tokoki kokolisa ezaleli ya boboto mpo tokelamá “na elilingi ya Nzambe.” (Ebandeli 1:27) Na ndakisa, Yuliusi, mokonzi ya basoda ya Roma, oyo azwaki mokumba ya komema ntoma Paulo na Roma, asalelaki ye “makambo na boboto mpenza mpe apesaki ye nzela ya kokende epai ya baninga na ye mpe kozwa lisalisi epai na bango” na engumba Sidone. (Misala 27:3) Na nsima, ntango Paulo ná bato mosusu bazindaki na masuwa na mobembo moko, bato ya Malta “bamoniselaki [bango] boboto moko ya koloba te.” Bapeliselaki bango kutu mɔtɔ mpo na malili. (Misala 28:1, 2) Kasi, boboto esuki kaka te na kosalaka makambo ya malamu mbala na mbala.
Yehova alingi ete boboto ekɔta mpenza na bomoto na biso mpe ekóma lolenge ya bomoi na biso. Yango wana asɛngi biso ‘tólata’ boboto. (Bakolose 3:12) Kasi, ezalaka pɛtɛɛ te komonisa boboto ntango nyonso. Mpo na nini? Mbala mosusu tokakatanaka mpo na komonisa boboto mpo tozali nsɔninsɔni, tozali kobanga, bazali kotɛmɛla biso, to mpo tozali na moimi mwa moke. Kasi, tokoki kolonga makambo wana soki tosɛngi elimo santu mpe tomekoli boboto ya Yehova.—1 Bakorinti 2:12.
Nini ekosalisa yo oyeba oyo osengeli kosala mpo okóma na boboto mingi? Osengeli komituna boye: ‘Nayokaka basusu na likebi mpe namityaka na esika na bango? Natyaka likebi na bamposa ya basusu? Mbala ya nsuka oyo namonisaki boboto epai ya moto oyo azali na libota na ngai te to mpe azali moninga na ngai te ezalaki mokolo nini?’ Na nsima, omityela mikano; na ndakisa salá makasi oyeba bamposa ya basusu, mingimingi ya bandeko ya lisangá. Na ndenge yango, okoki koyeba mikakatano mpe bamposa na bango. Soki oyebi yango, salá makasi omonisela basusu boboto ndenge okolinga bámonisela yo soki ozalaki na esika na bango. (Matai 7:12) Lisusu, sɛngá Yehova asalisa yo, mpe akopambola milende oyo ozali kosala mpo na kokóma na boboto mingi.—Luka 11:13.
BOBOTO EBENDAKA BASUSU NA LOSAMBO YA SOLO
Ntango ntoma Paulo atángaki makambo oyo ezalaki komonisa ete azali ministre ya Nzambe, atángaki mpe “boboto.” (2 Bakorinti 6:3-6) Bato bazalaki kolinga Paulo mpo bazalaki komona ete atyelaka bango likebi mpo azalaki koloba mpe kosala makambo ya boboto. (Misala 28:30, 31) Ndenge moko mpe, bato bakolinga koyeba solo soki tozali na boboto. Soki tozali komonisela bato nyonso boboto, ata mpe baoyo bazali kotɛmɛla biso, ekoki kosimba mitema na bango mpe bakoki kobongola ezaleli na bango. (Baroma 12:20) Nsima ya mikolo, bakoki kosepela koyekola Biblia.
Na Paradiso oyo ezali koya, na ntembe te ebele ya bato oyo bakosekwa bakosepela mpenza ndenge bakomonisela bango boboto ya solosolo, mbala mosusu mpo na mbala ya liboso. Yango ekotinda bango mpe bámonisela basusu boboto. Na ntango wana, moto nyonso oyo aboyi komonisa boboto mpe kosalisa basusu akozala na esika te na boyangeli ya Bokonzi ya Nzambe. Kaka baoyo bamonisaka bolingo mpe boboto nde bakofanda libela na libela na Paradiso. (Nzembo 37:9-11) Mokili ekozala mpenza na kimya mpe na likambo ya kobanga te! Kasi, liboso ntango wana ekoka, matomba nini tokoki kozwa sikoyo soki tomonisaka boboto?
MATOMBA YA KOMONISA BOBOTO
Biblia emonisi ete moto ya boboto azwaka matomba ebele. (Masese 11:17) Bato balingaka moto oyo azalaka na boboto, mpe balukaka komonisela ye mpe boboto. Yesu alobaki: “Bakomekela bino na emekeli oyo bozali komekela.” (Luka 6:38) Na yango, ezalaka mpasi te moto ya boboto azwa baninga ya malamu mpe abatela bango.
Ntoma Paulo alendisaki bakristo ya lisangá ya Efese ete ‘bázala na boboto na kati na bango, báyokelanaka mpenza mawa, mpe bálimbisanaka na motema moko.’ (Baefese 4:32) Soki bato nyonso na lisangá bazali na boboto, lisangá ekozala na bomoko mpe makasi na elimo. Na yango, tokoloba mabe ya bandeko te, tokotɔnga bango te, mpe tokotyola bango te, ata mpo na kosala masɛki. Kasi, tokoloba ntango nyonso makambo oyo ebɔndisaka mpe esalisaka basusu. (Masese 12:18) Na ndenge yango, bandeko bakozala makasi na elimo mpe bakosalela Yehova na esengo.
Ya solo, boboto ezali ezaleli oyo emonanaka na maloba mpe na misala. Soki tozali na boboto, tokomonisa ete tozali komekola Yehova, Nzambe na biso ya bolingo mpe oyo akabaka. (Baefese 5:1) Yango ekokómisa masangá na biso makasi mpe ekobenda basusu na losambo ya solo. Yango wana, tósala nyonso mpo basusu bámona ete tozali bato oyo bamonisaka boboto!
a Tokolobela bolamu na moko ya masolo oyo ekolobela bizaleli mosusu ya “mbuma ya elimo.”