LISOLO YA BOYEKOLI 21
Ndenge oyo Yehova ayanolaka na mabondeli na biso
“Toyebi ete tokozwa biloko yango oyo esɛngami mpamba te tosɛngi ye yango.”—1 YOA. 5:15.
LOYEMBO 41 Yoká libondeli na ngai
NA MOKUSEa
1-2. Mituna nini tokoki komituna na oyo etali mabondeli na biso?
ESÍ ekómelá yo omituna soki Yehova ayanolaka mpenza na mabondeli na yo? Soki ɛɛ, yebá ete ozali yo moko te. Bandeko mingi balobaka mpe bongo, mingimingi ntango bazali kokutana na mikakatano na bomoi. Ntango tozali konyokwama, ekoki kozala mpasi tósosola ndenge Yehova azali koyanola na mabondeli na biso.
2 Tiká tótalela naino bantina oyo tokoki kondima ete Yehova ayanolaka na mabondeli ya basaleli na ye. (1 Yoa. 5:15) Tokotalela mpe mituna oyo: Mpo na nini na bantango mosusu ekoki komonana lokola Yehova azali koyanola te na mabondeli na biso? Ndenge nini Yehova ayanolaka na mabondeli na biso lelo oyo?
NA BANTANGO MOSUSU YEHOVA AYANOLAKA TE NA MABONDELI NA BISO NA NDENGE OYO TOZALAKI KOKANISA
3. Mpo na nini Yehova alingi ete tobondelaka ye?
3 Makomami emonisi ete Yehova alingaka biso mingi mpenza mpe ete tozali na motuya na miso na ye. (Hag. 2:7; 1 Yoa. 4:10) Yango wana asɛngi biso tóbondelaka ye mpo na kosɛnga ye asalisa biso. (1 Pe. 5:6, 7) Azali na mposa ya kosalisa biso tótikala penepene na ye mpe tólonga mikakatano oyo tozali kokutana na yango.
4. Ndenge nini toyebi ete Yehova ayanolaka na mabondeli ya basaleli na ye? (Talá mpe elilingi.)
4 Mbala mingi totángaka na Biblia ete Yehova ayanolaki na mabondeli ya basaleli na ye. Oyebi moto moko oyo Yehova ayanolaki na mabondeli na ye? Tozali na ndakisa ya mokonzi Davidi. Azalaki na banguna ebele bomoi na ye mobimba, mpe mbala mingi na nzela ya mabondeli, azalaki kosɛnga Yehova asalisa ye. Na libaku moko asɛngaki Yehova boye: “Ee Yehova, yoká libondeli na ngai; Tyá litoi na lilɔmbɔ na ngai. Na bosembo na yo mpe na boyengebene na yo, yanolá ngai.” (Nz. 143:1) Yehova ayanolaki na mabondeli oyo Davidi asalaki mpo na kosɛnga ye abikisa ye. (1 Sam. 19:10, 18-20; 2 Sam. 5:17-25) Na kondima nyonso Davidi akokaki koloba: “Yehova azali pene na baoyo nyonso bazali kobelela ye.” Biso mpe tokoki kondima likambo yango.—Nz. 145:18.
5. Yehova azalaki ntango nyonso koyanola na mabondeli ya basaleli na ye ya ntango ya kala na ndenge oyo bazalaki kokanisa? Pesá ndakisa. (Talá mpe elilingi)
5 Na bantango mosusu, Yehova akoki te koyanola na mabondeli na biso na ndenge oyo tozalaki kokanisa. Yango nde ekómelaki ntoma Paulo. Asɛngaki Nzambe alongola “nzubɛ moko na kati ya mosuni” na ye. Na mabaku misato mobimba, ntoma Paulo abondelaki mpo na likambo yango. Yehova ayanolaki na mabondeli na ye? Ɛɛ, kasi te na ndenge oyo ntoma Paulo azalaki kokanisa. Na esika Yehova asilisa mokakatano yango, apesaki ye nde nguya oyo asengelaki na yango mpo akoba kosalela ye na bosembo nyonso.—2 Ko. 12:7-10.
6. Na bantango mosusu, mpo na nini ekoki komonana lokola Yehova azali koyanola na mabondeli na biso te?
6 Na bantango mosusu, biso mpe tokoki kozwa eyano oyo ekeseni na oyo tozalaki kokanisa. Tóyeba ete Yehova ayebi eyano oyo eleki malamu mpo na biso. Akoki kutu “kosala mingi mpenza koleka makambo nyonso oyo tosɛngaka to oyo eyelaka biso na makanisi.” (Ef. 3:20) Yango wana, eyano na ye na mabondeli na biso ekoki koya na ntango mpe na lolenge oyo tokanisaki te.
7. Mpo na nini ekoki kosɛnga ete tóbongola likambo oyo tozali kobondela mpo na yango? Pesá ndakisa.
7 Ekoki kosɛnga ete tóbongola likambo oyo tozalaki kobondela mpo na yango, ntango tokangi polele ntina ya mokano ya Yehova. Tótalela ndakisa ya ndeko Martin Poetzinger. Mwa moke nsima ya kobala, bakangaki ye na kaa ya bakangami ya Banazi. Na ebandeli, asɛngaki Yehova asalisa ye abima na kaa yango mpo akoka kosalisa mwasi na ye mpe azongela mosala ya kosakola. Kasi, nsima ya bapɔsɔ mibale, amonaki ata elembo moko te oyo emonisaki ete Yehova akobimisa ye na kaa yango ya bakangami. Yango wana abandaki kobondela boye “Yehova, lakisá ngai likambo oyo olingi ete nasala.” Na nsima, akómaki kokanisa mikakatano oyo bandeko mosusu mpe bazali kokutana na yango na kaa yango. Mingi kati na bango bazalaki komitungisa mpo na basi mpe bana na bango. Na nsima, ndeko Poetzinger abondelaki boye: “Matondi Yehova mpo na mokumba ya sika oyo opesi ngai. Salisá ngai napesa bandeko na ngai makasi mpe nalendisa bango.” Alekisaki mbula libwa na kaa yango mpe azalaki mpenza kolendisa bandeko!
8. Likambo nini ya ntina tosengeli kobosana te ntango tozali kobondela?
8 Tóbosana te ete Yehova azali na mokano moko, mpe akokokisa yango na ntango oyo atyá. Mokano yango ezali mpe ya kosilisa libela makambo nyonso oyo ezali konyokola bato lelo oyo, elingi koloba makama oyo ebimaka yango moko, maladi, mpe liwa. Yehova akokokisa mokano na ye na nzela ya Bokonzi na ye. (Da. 2:44; Em. 21:3, 4) Nzokande liboso ntango yango ekoka, Yehova atiki nzela ete Satana ayangela mokili oyo.b (Yoa. 12:31; Em. 12:9) Soki Yehova asilisaka mikakatano ya bato lelo oyo, mbɛlɛ elingaki komonana lokola nde Satana azali koyangela malamu. Na yango, atako tosengeli kozela ete Yehova akokisa mikano na ye mosusu, yango elimboli te ete asundoli biso. Tiká tólobela ndenge mosusu oyo Yehova asalisaka biso.
NDENGE OYO YEHOVA AYANOLAKA NA MABONDELI LELO OYO
9. Ndenge nini Yehova akoki kosalisa biso ntango tolingi kozwa bikateli? Pesá ndakisa.
9 Apesaka biso bwanya. Yehova alaki ete akopesa biso bwanya oyo tosengeli na yango mpo tózwa bikateli ya malamu. Tozalaka mingimingi na mposa ya bwanya ntango tozali kozwa bikateli oyo ekobongola bomoi na biso, na ndakisa, ekateli ya kotikala monzemba to mpe ya kobala. (Yak. 1:5) Tózwa ndakisa ya ndeko mwasi moko monzemba na nkombo Maria.c Azalaki kosepela na mosala na ye ya mobongisi-nzela ntango akutanaki na ndeko mobali moko. Alobi boye: “Ntango boninga na biso ebandaki kokola, bolingo na biso mpe ekómaki makasi. Nayebaki ete nasengelaki kozwa ekateli. Nabondelaki mingi mpenza mpo na likambo yango. Nazalaki na mposa ya litambwisi ya Yehova, kasi nayebaki mpe ete Yehova akozwa ekateli te na esika na ngai.” Amonaki ete Yehova ayanolaki na libondeli oyo asalaki mpo na kosɛnga ye bwanya. Na ndenge nini? Wana azalaki kosala bolukiluki na mikanda na biso, amonaki masolo ya sikisiki oyo esalisaki ye azwa biyano na mituna na ye. Ayokaki mpe toli oyo mama na ye apesaki ye. Toli yango esalisaki Maria atalela lisusu mayoki na ye. Na yango, azwaki ekateli ya bwanya.
10. Na kotalela Bafilipi 4:13, Yehova akosala nini mpo na kosalisa basaleli na ye? Pesá ndakisa. (Talá mpe elilingi.)
10 Apesaka biso makasi mpo tóyika mpiko. Kaka ndenge asalaki mpo na ntoma Paulo, Yehova akopesa biso makasi oyo tosengeli na yango mpo tóyikela mikakatano na biso mpiko. (Tángá Bafilipi 4:13.) Tótala ndenge Yehova asalisaki ndeko mobali moko na nkombo Benjamin mpo ayika mpiko na mikakatano ya makasi. Ntango Benjamin azalaki elenge, ye ná bato ya libota na bango bazalaki kofanda na kaa ya bato bakimá-bitumba na Afrika. Benjamin alobi boye: “Nazalaki kobondela Yehova mbala na mbala mpo na kosɛnga ye apesa ngai makasi ya kosala makambo oyo ekosepelisa ye. Yehova ayanolaki na mabondeli na ngai na ndenge apesaki ngai kimya ya makanisi, mpiko mpo nakoba kosakola, mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia mpo nabatela kondima na ngai makasi.” Alobi lisusu boye: “Kotánga masolo ya makambo oyo Batatoli ya Yehova mosusu bakutanaki na yango mpe koyeba ndenge oyo Yehova asalisaki bango báyika mpiko ekómisaki lisusu makasi ekateli na ngai ya kotikala sembo.”
11-12. Ndenge nini Yehova akoki kosalela bandeko na biso bakristo mpo na koyanola na mabondeli na biso? (Talá mpe elilingi.)
11 Asalelaka bandeko na biso bakristo. Na butu liboso Yesu akufa, abondelaki na motema na ye mobimba. Asɛngaki Yehova asalisa ye mpo bato bátalela ye te lokola moto oyo afingi Nzambe. Na esika Yehova asala bongo, atindaki nde anzelu moko alendisa ye. (Luka 22:42, 43) Yehova akoki mpe kosalela bandeko na biso mpo na kolendisa biso, bakoki kobenga biso na nzela ya telefone to koya kotala biso na ndako. Biso nyonso tokoki koluka mabaku ya kolendisa bandeko na biso na ‘liloba moko ya malamu’.—Mas. 12:25.
12 Tótala ndakisa ya ndeko mwasi moko na nkombo Miriam. Mwa bapɔsɔ nsima ya liwa ya mobali na ye, azangaki moto ya kosalisa ye mpe akómaki komitungisa. Azalaki kolela mingi mpe azalaki na mposa ya kosolola na moto. Alobi boye: “Nazalaki na makasi ya kobenga ata moto moko te, yango wana nabondelaki Yehova. Ntango nazalaki naino kobondela, nayokaki telefone na ngai eleli. Nkulutu moko nde azalaki kobenga ngai, azalaki moninga ya motema.” Nkulutu yango ná mwasi na ye babondisaki ye. Miriam amindimisaki ete Yehova nde atindaki ndeko wana abenga ye mpo na kolendisa ye.
13. Lobelá ndakisa moko oyo emonisi ndenge Yehova akoki kosalela ata bato oyo basambelaka ye te mpo na koyanola na mabondeli biso.
13 Akoki kosalela bato oyo basambelaka ye te. (Mas. 21:1) Na bantango mosusu, Yehova akoki kosalela bato oyo basambelaka ye te mpo na koyanola na mabondeli ya basaleli na ye. Na ndakisa, atindaki mokonzi Artazerezese andima makambo oyo Nehemia asɛngaki ye ya kozonga na Yerusaleme mpo na kotonga lisusu engumba yango. (Neh. 2:3-6) Lelo oyo mpe, Yehova akoki ata kosalela bato oyo basambelaka ye te mpo na kosalisa biso ntango tozali na bosenga.
14. Nini esepelisi yo na makambo oyo Soo Hing akutanaki na yango? (Talá mpe elilingi.)
14 Ndeko mwasi moko na nkombo Soo Hing amonaki ndenge Yehova asalisaki ye na nzela ya monganga na ye. Mwana na ye ya mobali abɛlaki bamaladi ndenge na ndenge ya motó. Ntango mwana yango asalaki aksida moko monene, ye ná na mobali na ye bakataki mosala mpo na kosalisa mwana na bango. Yango esalaki ete bákóma na mikakatano ya mbongo. Ndeko Soo Hing amonaki ete asuki mpenza. Ayebisaki Yehova makambo nyonso oyo ezalaki na motema na ye mpo asalisa ye. Monganga oyo azalaki kosalisa bango akómaki kotyela bango likebi mingi. Mpo na yango, guvɛrnema endimaki kopesa bango lisungi mpe bazwaki esika malamu ya kofanda. Na nsima, ndeko Soo Hing alobaki boye: “Tomonaki lobɔkɔ ya Yehova na makambo wana nyonso. Azali mpenza ‘Moyoki ya mabondeli.’”—Nz. 65:2.
ESƐNGAKA KOZALA NA KONDIMA MPO NA KOLUKA MPE KOMONA EYANO YA YEHOVA
15. Nini esalisaki ndeko mwasi moko amona ete Yehova azalaki koyanola na mabondeli na ye?
15 Mbala mingi Yehova ayanolaka na mabondeli na biso te na ndenge ya likamwisi. Kasi biyano oyo apesaka ezalaka mpenza oyo tosengeli na yango mpo tótikala sembo epai ya Tata na biso ya likoló. Na yango, luká koyeba ndenge Yehova ayanolaka na mabondeli na yo. Ndeko mwasi moko na nkombo Yoko akanisaki ete Yehova azalaki te koyanola na mabondeli ye, na nsima akómaki kosala liste ya makambo oyo asɛngaki Yehova. Nsima ya ntango moko boye, azongelaki liste ya makambo oyo asɛngaki Yehova, mpe ayaki komona ete Yehova ayanolaki na makambo mingi, ata mpe makambo oyo abosanaki kosɛnga. Mbala na mbala, tosengeli kotɛlɛmaka mpe kokanisaka ndenge Yehova azali koyanola na mabondeli na biso.—Nz. 66:19, 20.
16. Ndenge nini tokoki komonisa kondima na oyo etali mabondeli na biso? (Baebre 11:6)
16 Tomonisaka kondima kaka te ntango tobondelaka Yehova kasi mpe ntango tondimaka eyano oyo apesaka na mabondeli na biso ezala eyei na lolenge nini. (Tángá Baebre 11:6.) Tótalela ndakisa ya Mike ná mwasi na ye, Chrissy. Bazalaki na mokano ya kosala na Betele. Mike alobi boye: “Totondisaki baformilɛrɛ mbala ebele mpe tobondelaki Yehova mbala na mbala mpo na mokano yango, kasi batikalaki kobengisa biso te.” Mike ná Chrissy bazalaki na kondima ete Yehova ayebaki lolenge eleki malamu ya kosalela bango na mosala na ye. Bakobaki kosala oyo bakokaki, na ndakisa kosala lokola babongisi nzela na esika mposa ezali mingi mpe kopesa mabɔkɔ na mosala ya botongi. Lelo oyo, bazali na mosala ya zongazonga. Mike alobi boye: “Yehova ayanolaki ntango nyonso te na mabondeli na biso na ndenge oyo tozalaki kokanisa, kasi ayanolaki yango mpe na lolenge ya malamu koleka kutu ndenge oyo tozalaki kokanisa.”
17-18. Na kotalela Nzembo 86:6, 7, tokoki komindimisa na likambo nini?
17 Tángá Nzembo 86:6, 7. Mokonzi Davidi amindimisaki ete Yehova azalaki koyoka mpe koyanola na mabondeli na ye. Yo mpe okoki kozala na kondima ya bongo. Bandakisa oyo tolobeli na lisolo oyo endimisi biso ete Yehova akoki kopesa biso bwanya mpe nguya oyo tosengeli na yango mpo tóyika mpiko. Akoki kosalela bandeko na biso bakristo, ezala mpe bato oyo bakómi naino kosambela ye te mpo na kosalisa biso na lolenge moko boye.
18 Atako Yehova akoyanola ntango nyonso te na mabondeli na biso na ndenge oyo tozali kokanisa, toyebi ete akoyanola yango kaka. Akopesa biso oyo tosengeli na yango mpe kaka na ntango oyo tosengeli na yango mpenza. Na yango, kobá kobondela na kondima mpe zalá na elikya ete Yehova akotyela yo likebi mpe ‘akokokisa mposa ya ekelamu nyonso oyo ezali na bomoi’ na mokili ya sika oyo ezali koya.—Nz. 145:16.
LOYEMBO 46 Totondi yo Yehova
a Yehova alaki ete akoyanola na mabondeli na biso soki eyokani na mokano na ye. Ntango tokutani na komekama, tokoki kozala na kondima ete Yehova akopesa biso lisalisi oyo tosengeli na yango mpo tótikala sembo epai na ye. Tótalela naino ndenge Yehova ayanolaka na mabondeli na biso.
b Mpo na koyeba ntina mosusu oyo Yehova atiki nzela Satana ayangela mokili, talá lisolo “Tyá makanisi na yo na likambo oyo eleki ntina,” oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 06/2017.
c Topesi bango bankombo mosusu.
d NDIMBOLA YA ELILINGI: Mama moko ná mwana na ye ya mwasi oyo bakimi mboka na bango bakómi na mboka mopaya. Bandeko bayambi bango na esengo mpe bapesi bango lisalisi oyo esengeli.