-
“Bakristo” nyonso bazali mpenza bakristo ya solo?Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2012 | 1 Mars
-
-
“Bakristo” nyonso bazali mpenza bakristo ya solo?
BAKRISTO boni bazali na mokili? Buku moko (Atlas of Global Christianity) elobi ete na 2010, na mokili mobimba, bakristo bazalaki soki miliare mibale na ndambo. Buku yango emonisi lisusu ete bakristo yango bazali na mangomba koleka 41 000, oyo mokomoko ezali na mateya na yango mpe na mibeko oyo yango elandaka. Lokola mangomba “ya bokristo” ezali ebele ndenge wana, tokoki kokamwa te soki bato mosusu bazali komituna soki lingomba ya solo ezali oyo wapi. Bakoki komituna boye: ‘Bato nyonso oyo bamibengaka bakristo bazali mpenza bakristo ya solo?’
Tótalela naino likambo yango na lolenge mosusu. Mbala mingi, soki moto oyo azali kosala mobembo akómi na ndelo oyo ekaboli bikólo, batunaka ye soki azali moto ya ekólo nini. Asengeli mpe kolakisa mikanda mosusu ya Leta, na ndakisa passeport, mpo na komonisa ete alobi mpenza solo. Ndenge moko mpe, mokristo ya solo asengeli kosuka kaka te na koloba ete andimelaka Kristo. Asengeli mpe komonisa yango na makambo mosusu. Makambo yango nini?
Mbala ya liboso oyo basalelaki liloba “mokristo” ezalaki nsima ya mobu 44 ya ntango na biso. Luka moko ya bato oyo bakomaki Biblia alobaki boye: “Na Antiokia nde bayekoli babengamaki mpo na mbala ya liboso bakristo na litambwisi ya Nzambe.” (Misala 11:26) Simbá ete bato oyo babengamaki bakristo bazalaki bayekoli ya Kristo. Nini emonisaka ete moto azali moyekoli ya Yesu Kristo? Buku moko (The New International Dictionary of New Testament Theology) elobi ete: “Kozala moyekoli ya Yesu elimboli kokaba bomoi [na yo] mobimba . . . mpo na ye.” Na yango, mokristo ya solo ezali moto oyo alandaka kozanga kokakola mateya nyonso mpe malako nyonso ya Yesu, oyo abandisaki lingomba ya bokristo.
Tokoki nde kokuta bato ya ndenge wana na kati ya ebele ya bato oyo bamibengaka bakristo lelo oyo? Mpo na koyeba bayekoli na ye ya solo, Yesu ye moko alobaki nini? Tosɛngi yo otalela biyano oyo Biblia epesi na mituna yango. Na masolo oyo elandi, tokotalela makambo mitano oyo Yesu alobaki, oyo ekosalisa biso tóyeba bayekoli na ye ya solo. Tokotalela mpe ndenge oyo bakristo ya siɛklɛ ya liboso bakokisaki makambo yango. Mpe tokoluka komona banani kati na ebele ya bato oyo bamibengaka bakristo lelo oyo, bakokisaka makambo yango.
-
-
‘Bótikala na kati ya liloba na ngai’Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2012 | 1 Mars
-
-
‘Bótikala na kati ya liloba na ngai’
“Soki botikali na kati ya liloba na ngai, bozali mpenza bayekoli na ngai, mpe bokoyeba solo, mpe solo ekopesa bino bonsomi.”—YOANE 8:31, 32.
Yango elimboli nini? “Liloba” ya Yesu elimboli mateya na ye, oyo ezalaki kouta epai ya Nzambe. Yesu alobaki boye: “Tata moto atindaki ngai apesaki ngai mitindo mpo na makambo nasengeli koyebisa mpe oyo nasengeli koloba.” (Yoane 12:49) Na libondeli moko oyo asalaki epai ya Tata na ye ya likoló, Yehova Nzambe, Yesu alobaki boye: “Liloba na yo ezali solo.” Mbala na mbala, azalaki kotánga Liloba ya Nzambe mpo na komonisa esika oyo mateya na ye ezalaki kouta. (Yoane 17:17; Matai 4:4, 7, 10) Yango wana, bakristo ya solo ‘batikalaka na kati ya liloba na ye,’ elingi koloba bandimaka ete Biblia, Liloba ya Nzambe, ezali “solo” mpe ete mateya na bango mpe makambo nyonso oyo basalaka esengeli koyokana ná makambo oyo ezali na Biblia.
Ndenge oyo bakristo ya liboso bakokisaki yango: Ntoma Paulo, moto oyo akomaki mikanda mingi ya Biblia, azalaki komemya Liloba ya Nzambe, lokola Yesu. Akomaki boye: “Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe mpe ezali na litomba.” (2 Timote 3:16) Mibali oyo baponamaki mpo na koteya bandeko na bango bakristo, basengelaki ‘kokangama makasi na liloba ya sembo ya Nzambe.’ (Tito 1:7, 9) Ntoma Paulo akebisaki bakristo ya liboso ete báboya ‘filozofi mpe bokosi ya mpambampamba na kolanda mimeseno ya bato, na kolanda makambo mikemike ya mokili kasi na kolanda Kristo te.’—Bakolose 2:8.
Banani bazali kolanda ndakisa wana lelo oyo? Buku moko (Catechism of the Catholic Church) etángi mobeko moko ya Vatican (Dogmatic Constitution on Divine Revelation) oyo lingomba endimaki na 1965, oyo elobi ete: “Mpo na kondima likambo moko oyo Biblia emonisi, Lingomba [ya Katolike] esukaka kaka te na kotalela Makomami Mosantu. Yango wana, ezala mimeseno ya lingomba to Makomami Mosantu, nyonso mibale ezali na valɛrɛ ndenge moko.” Lisolo oyo ebimaki na zulunalo moko (Maclean) etángaki maloba oyo ya pastɛrɛ moko ya mwasi na Toronto, na Canada: “Mpo na nini tosengeli kotika ete mateya ya Yesu mpe oyo ya Biblia, oyo eumeli mbula koleka 2 000, etambwisa biso? Biso moko tozali na makanisi ya malamu mpenza, kasi ntango nyonso tolɛmbisaka yango na ndenge tolukaka eyokana na mateya ya Yesu mpe na Makomami.”
Mpo na Batatoli ya Yehova, buku moko (New Catholic Encyclopedia) elobi boye: “Bamonaka ete Biblia ezali mokanda kaka moko epai mateya na bango esengeli kouta, mpe kaka yango nde esengeli kotambwisa bomoi na bango.” Na mikolo euti koleka, ntango Motatoli ya Yehova moko na Canada alingaki koyebisa mobali moko soki azali nani, mobali yango akataki ye maloba. Nsima ya kolakisa mosapi na Biblia, alobaki na ye: “Ntango kaka namoni Biblia, nayebi mbala moko lingomba na yo.”
-
-
“Bazali bato ya mokili te”Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2012 | 1 Mars
-
-
“Bazali bato ya mokili te”
“Mokili eyini bango, mpo bazali bato ya mokili te.”—YOANE 17:14.
Yango elimboli nini? Lokola Yesu azalaki moto ya mokili te, azalaki te kokɔta na makambo ya politiki to na matata ya bato ya ntango na ye. Alimbolaki boye: “Soki bokonzi na ngai ezalaki ya mokili oyo, mbɛlɛ basaleli na ngai babundi mpo nakabama epai ya Bayuda te. Kasi nde bokonzi na ngai euti awa te.” (Yoane 18:36) Alendisaki mpe bayekoli na ye báboya bizaleli, maloba, mpe etamboli oyo Liloba ya Nzambe epekisi.—Matai 20:25-27.
Ndenge oyo bakristo ya liboso bakokisaki yango: Jonathan Dymond, mokomi moko ya makambo etali mangomba, alobaki ete bakristo ya liboso “bazalaki koboya kokɔta na [bitumba]; ata soki esengelaki bálobela bango mabe, bákɔtisa bango bɔlɔkɔ, to báboma bango.” Bazalaki kondima konyokwama na esika ya kokɔta na makambo ya mokili. Ndenge oyo bazalaki kotosa mibeko ya Nzambe ekesenisaki mpe bango na bato ya mokili. Ntoma Petro ayebisaki bakristo boye: “Lokola bozali komikɔtisa elongo na bango lisusu te na libulu wana ya pɔtɔpɔtɔ ya bomoi ya mbindo, bazali kobulungana mpe kofinga bino.” (1 Petro 4:4) Will Durant, moto moko ya mayele na istware akomaki ete ‘bakristo bazalaki kotungisa lisosoli ya bapakano mpo na ezaleli na bango ya kobanga Nzambe mpe ya kolongobana.’
Banani bazali kolanda ndakisa wana lelo oyo? Mpo na ndenge oyo bakristo bazalaki koboya kokɔta na makambo ya mokili, buku moko (New Catholic Encyclopedia) elobi boye: “Koboya kosimba mindoki ezali mpenza mabe.” Zulunalo moko (Reformierte Presse) ebimisaki lisolo oyo ezongelaki lapolo ya ebongiseli moko oyo elandelaka lotomo ya bato na Afrika. Lapolo yango emonisaki ete ntango bato ebele babomamaki na 1994 na Rwanda, mangomba nyonso epesaki mabɔkɔ, “longola kaka Batatoli ya Yehova.”
Ntango profesɛrɛ moko ya eteyelo ya ntei azalaki kolobela ndenge basoda ya Nazi babomaki ebele ya Bayuda, azalaki komilela ete “ata lingomba moko te to ebongiseli moko te ya bana-mboka etɛmɛlaki makambo ya lokuta, ya nsɔmɔ, mpe ya mabe oyo esalemaki.” Nsima ya kotuna likambo yango na Musée de l’Holocauste, na États-Unis, profesɛrɛ yango akomaki boye: “Sikoyo nazwi eyano.” Bayebisaki ye ete Batatoli ya Yehova bakangamaki na mateya na bango, atako banyokolaki bango makasi.
Tokoloba boni mpo na mibeko ya Nzambe oyo balandaka? Zulunalo moko (U.S. Catholic) elobi ete “bilenge mingi ya lingomba ya Katolike lelo oyo bandimaka te mateya ya lingomba na bango na makambo lokola kofanda na libala oyo ekomisami na Leta te [mpe] kosangisa nzoto liboso ya kobala.” Zulunalo yango etángi maloba ya diakre moko ya lingomba, oyo alobaki boye: “Nakanisi ete bato mingi, soki namikosi te koleka 50%, bafandaka naino na libala liboso ete bákomisa yango na Leta.” Buku moko (The New Encyclopædia Britannica) elobi ete Batatoli ya Yehova “babɛtaka mpenza nsɛtɛ na likambo etali kotosa mibeko ya Nzambe na bomoi ya mokomoko na bango.”
-
-
‘Bózala na bolingo na kati na bino’Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2012 | 1 Mars
-
-
‘Bózala na bolingo na kati na bino’
“Nazali kopesa bino mobeko ya sika: bólinganaka bino na bino; ndenge ngai nalingaki bino, bino mpe bólinganaka bino na bino. Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.”—YOANE 13:34, 35.
Yango elimboli nini? Kristo ayebisaki bayekoli na ye bálinganaka bango na bango ndenge ye alingaki bango. Ndenge nini Yesu alingaki bango? Azalaki kolinga bato nyonso atako na ntango na ye bato mingi bazalaki kolinga kaka bato ya ekólo na bango mpe bazalaki kozwa basi na valɛrɛ te. (Yoane 4:7-10) Bolingo ezalaki kotinda Yesu apesa ntango na ye, makasi na ye, mpe amipimela makambo mosusu ya malamu mpo na kosalisa basusu. (Marko 6:30-34) Nsukansuka, Kristo amonisaki bolingo na ndenge oyo eleki mpenza. Alobaki boye: “Ngai nazali mobateli ya mpate oyo aleki malamu; mobateli ya mpate oyo aleki malamu apesaka molimo na ye mpo na bampate.”—Yoane 10:11.
Ndenge oyo bakristo ya liboso bakokisaki yango: Na siɛklɛ ya liboso, bakristo bazalaki kobengana ‘ndeko mobali’ to ‘ndeko mwasi.’ (Filemo 1, 2) Lisangá ya bokristo ezalaki koyamba bato ya bikólo nyonso, mpo bandimaki ete “Moyuda ná Mogrɛki bakeseni te, mpo bato nyonso bazali na Nkolo kaka moko.” (Baroma 10:11, 12) Nsima ya Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso, bayekoli na Yerusaleme “bazalaki kotɛka biloko na bango mpe bozwi na bango mpe kokabola na moto nyonso mosolo bazwaki, ndenge moto na moto azalaki na bosɛnga.” Mpo na nini bazalaki kosala bongo? Ezalaki mpo ete bato oyo bautaki kozwa batisimo bátikala na Yerusaleme mpe bákoba “komipesa na mateya ya bantoma.” (Misala 2:41-45) Nini ezalaki kotinda bango básala bongo? Ekokaki ata mbula 200 te nsima ya liwa ya bantoma, Tertullien azongelaki maloba oyo bato mosusu bazalaki koloba mpo na bakristo: “Talá ndenge balinganaka . . . mpe ndenge bandimaka ata kokufa mpo na bandeko na bango.”
Banani bazali kolanda ndakisa wana lelo oyo? Buku moko (The History of the Decline and Fall of the Roman Empire [1837]) emonisi ete na boumeli ya bankama ya bambula, bato oyo bazalaki komibenga bakristo “basalelanaki mabe mingi bango na bango koleka oyo bapakano [bato oyo bazalaki bandimi te] basalelaki bango.” Ankɛtɛ moko oyo euti kosalema na États-Unis emonisi ete bato mingi oyo balobaka ete basambelaka, oyo mingi na bango bamibengaka bakristo, bayinaka bato ya mposo mosusu. Mbala mingi, bandimi ya lingomba moko bakipanaka te ná bandimi ya lingomba na bango oyo bafandaka na ekólo mosusu, yango wana, bakokaka te to bayebaka te kosalisana na ntango ya mpasi.
Na 2004, ntango mipɛpɛ makasi ebɛtaki etúká ya Floride (na États-Unis) mbala minei mobimba na sanza mibale mpamba, prezida ya komite oyo ezalaki kosunga bato oyo bakwelaki likama na etúká yango, azalaki na mposa ya koyeba soki biloko oyo bazali kotinda ekosalelama na ndenge ya malamu. Alobaki ete lingomba mosusu te ebongisami malamu lokola lisangá ya Batatoli ya Yehova, mpe alakaki kopesa Batatoli eloko mosusu nyonso oyo bakozala na yango mposa. Mwa bambula liboso, na 1997, ekipi moko ya Batatoli ya Yehova ememaki nkisi, biloko ya kolya, mpe bilamba na République démocratique du Congo, mpo na kosalisa bandeko na bango bakristo oyo bazalaki na bosɛnga. Bandeko na bango Batatoli ya Yehova ya Mpoto batindelaki bango makabo ya milio moko ya badolare.
-
-
“Namonisi nkombo na yo polele”Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2012 | 1 Mars
-
-
“Namonisi nkombo na yo polele”
“Namonisi nkombo na yo polele na bato oyo ozwi na mokili mpe opesi ngai. . . . Nayebisi bango nkombo na yo mpe nakoyebisa yango.”—YOANE 17:6, 26.
Yango elimboli nini? Yesu ayebisaki nkombo ya Nzambe polele na ndenge azalaki kosalela yango na mosala na ye. Na ntembe te, Yesu azalaki kotánga nkombo ya Nzambe mbala na mbala ntango azalaki kotánga Makomami. (Luka 4:16-21) Ateyaki bayekoli na ye bábondelaka boye: “Tata, nkombo na yo esantisama.”—Luka 11:2.
Ndenge oyo bakristo ya liboso bakokisaki yango: Ntoma Petro ayebisaki mikóló ya Yerusaleme ete Nzambe abimisaki uta na bikólo “ekólo moko mpo na nkombo na ye.” (Misala 15:14) Bantoma mpe bayekoli mosusu basakolaki ete “moto nyonso oyo akobelela nkombo ya Yehova akobika.” (Misala 2:21; Baroma 10:13) Basalelaki mpe nkombo ya Nzambe na mikanda oyo bakomaki. Tosefta, buku moko ya mibeko ya Bayuda, oyo basilisaki kokoma na mobu soki 300 ya ntango na biso, elobi boye mpo na ndenge oyo banguna bazalaki kotumba mikanda ya bakristo: “Babuku ya bato oyo bakomaki baevanzile mpe babuku ya ba minim [oyo bakanisaka ete bazalaki Bayuda oyo bazalaki bakristo] batumbaki yango na mɔtɔ. Bapesaki nzela ete bátumba yango na esika oyo bakokuta yango, . . . babuku yango mpe mikanda mosusu oyo ezali na nkombo ya Nzambe na kati.”
Banani bazali kolanda ndakisa wana lelo oyo? Libongoli moko ya Biblia (Revised Standard Version) oyo Conseil national des Églises chrétiennes ya États-Unis endimaki, elobi boye na maloba na yango ya ebandeli: “Liboso kutu Kristo abotama, lingomba ya Bayuda etikaki kosalela nkombo ya Nzambe kaka moko ya solo, oyo bazalaki komona ete ezalaki kokesenisa ye ná banzambe mosusu, mpe ebongi te ete bandimi nyonso ya mangomba ya bokristo básalelaka yango.” Yango wana, na esika ya nkombo ya Nzambe, batyaki titre “NKOLO.” Na mikolo oyo euti koleka, Vatican eyebisaki Baepiskopo ete: “Nkombo ya Nzambe, oyo emonisami na balɛtrɛ minei ya Ebre YHWH,a esengeli kosalelama te mpe kotángama te na banzembo mpe na mabondeli.”
Banani lelo oyo basalelaka nkombo ya Nzambe mpe bayebisaka yango epai ya basusu? Ntango Sergey azalaki naino elenge, na ekólo Kirghizistan, atalaki filme moko oyo emonisaki ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova. Banda wana, elekaki mbula soki 10, ayokaki nkombo yango lisusu te. Na nsima, ntango Sergey akendaki kofanda na États-Unis, Batatoli ya Yehova mibale bayaki kotala ye na ndako mpe balakisaki ye nkombo ya Nzambe na Biblia. Sergey akamwaki kokutana na bato oyo basalelaka nkombo Yehova. Kutu, na diksionɛrɛ moko (Webster’s Third New International Dictionary), na esika oyo bakomi “Yehova Nzambe,” bapesi ndimbola oyo: “Nzambe oyo ayebani ete aleki banzambe nyonso mpe Nzambe kaka moko oyo Batatoli ya Yehova basambelaka.”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na Lingala, mbala mingi nkombo ya Nzambe ebengamaka “Yehova” to “Yawe.”
-
-
“Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama”Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2012 | 1 Mars
-
-
“Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama”
“Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.”—MATAI 24:14.
Yango elimboli nini? Luka, moko ya bakomi ya Evanzile alobaki ete Yesu “abandaki kotambola engumba na engumba mpe mboka na mboka, mpo na koteya mpe kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe.” (Luka 8:1) Yesu ye moko mpe alobaki boye: “Nasengeli mpe kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe na bingumba mosusu, mpamba te natindamaki mpo na yango.” (Luka 4:43) Atindaki bayekoli na ye básakola nsango malamu na bingumba mpe na bamboka, na nsima, apesaki bango etinda oyo: “Bokozala batatoli na ngai . . . tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.”—Misala 1:8; Luka 10:1.
Ndenge oyo bakristo ya liboso bakokisaki yango: Bayekoli ya Yesu balekisaki ntango te mpo na kosala oyo Yesu asɛngaki bango básala. “Mikolo nyonso na tempelo mpe na ndako na ndako, kozanga kotika, bakobaki koteya mpe kosakola nsango malamu oyo etali Kristo.” (Misala 5:42) Mokristo nyonso azalaki kosala mosala yango ya kosakola. Neander, moto ya mayele na istware alobaki ete “Celsus, moto ya liboso oyo akomaki mpo na kotɛmɛla bakristo, atyolaki bakristo mpamba te basali ya nsuki ya meme, bato oyo basalaka sapato, bato oyo babongisaka mposo ya nyama, bato oyo batángá te mpe bato mpamba, bazalaki basakoli ya molende ya nsango malamu.” Na buku na ye (The Early Centuries of the Church), Jean Bernardi akomaki boye: “[Bakristo] bazalaki kokende kosakola bisika nyonso mpe epai ya bato nyonso. Bazalaki kotambola na babalabala ya minene mpe na bingumba, na bisika ya bato ebele mpe na bandako ya bato. Báyamba bango to báyamba bango te. . . . Tii na nsuka ya mokili.”
Banani bazali kolanda ndakisa wana lelo oyo? David Watson, sango moko ya lingomba ya Anglican akomaki boye: “Soki bato mingi bazali kolinga kosalela Nzambe te lelo oyo, ezali mingimingi mpo lingomba ezali kozwa na valɛrɛ te mosala ya kosakola mpe ya koteya.” Na buku na ye (Why Are the Catholics Leaving?), José Luis Pérez Guadalupe akomaki na ntina na mosala ya ba Évangéliques, ba Adventistes, mpe bandimi ya mangomba mosusu, mpe alobaki ete “bakendaka kosakola ndako na ndako te.” Kasi, mpo na Batatoli ya Yehova akomaki boye: “Basakolaka ndako na ndako.”
Na buku moko (Cato Supreme Court Review, 2001-2002), tozali kokuta makambo oyo mokomi Jonathan Turley, alobaki mpo na Batatoli ya Yehova: “Soki kaka otángi nkombo ya Batatoli ya Yehova, mbala moko bato mingi bayebaka ete ezali bato oyo bakómelaka bato na bandako na mbalakaka mpo na koteya. Mpo na Batatoli ya Yehova, kosakola ndako na ndako ezali kaka te likambo ya kolobela kondima na bango, kasi yango nde esimbi mpenza kondima na bango.”
[Etanda na lokasa 9]
Oyebi sikoyo banani bazali bakristo ya solo?
Na kotalela makambo oyo Makomami emonisi, ndenge tomoni yango na masolo oyo motoba, okanisi ete banani lelo bazali mpenza kosala makambo oyo esɛngami mpo na bakristo ya solo? Atako ezali na bankoto ya mangomba oyo emibengaka mangomba ya bokristo, kobosana te likambo oyo Yesu ayebisaki bayekoli na ye: “Ezali te bato nyonso oyo balobaka na ngai: ‘Nkolo, Nkolo,’ nde bakokɔta na bokonzi ya likoló, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Tata na ngai oyo azali na likoló.” (Matai 7:21) Soki oyebi bato oyo bazali kosala mokano ya Tata, elingi koloba baoyo bazali kokokisa makambo oyo Yesu asɛngaki bakristo ya solo, mpe soki ozali koyangana elongo na bango, okoki kozwa mapamboli ya seko oyo Bokonzi ya Nzambe ekopesa. Tosɛngi yo otuna Batatoli ya Yehova, oyo bapesi yo zulunalo oyo, báyebisa yo makambo mosusu oyo etali Bokonzi ya Nzambe, mpe mapamboli oyo yango ekopesa.—Luka 4:43.
-