Tópumbwa likoló na mapapu lokola mpongo
LIYOKI nini moto akozala na yango nsima ya koyika mpiko mbula mitano kati na káa ya bakangami ya Nazi? Kolɛmba makasi? Nkanda? Mposa ya kozongisa mabe?
Atako ekoki komonana likambo ya kokamwa, moko na bato ya lolenge yango akomaki ete: “Bomoi na ngai ekómaki kitoko mingi koleka lolenge oyo nakokaki kolikya yango.” Mpo na nini azalaki na liyoki lolenge yango? Alobi ete: “Nazwaki ekimelo na nsé ya mapapu ya Oyo-Aleki-Likoló, mpe namonaki kokokisama ya maloba ya mosakoli Yisaya, wana alobaki ete: ‘Baoyo bakolikyaka epai na Yehova, bakozwa nguya na sika, bakopumbwa likoló na mapapu lokola mpongo.’”—Yisaya 40:31.
Mobali wana moklisto, oyo nzoto na ye etungisamaki na minyoko ya nsɔ́mɔ oyo moto akoki te kokanisa, na maloba ya elilingi, elimo na ye etombwanaki likoló, elimo oyo monyoko ya ba Nazi ekokaki kolónga yango te. Lokola Davidi, azwaki ekimelo na elili ya “mapapu” ya Nzambe. (Nzembo 57:1) Moklisto wana asalelaki bokokanisi bopesami na mosakoli Yisaya, wana akokanisaki nguya ya elimo na nguya ya mpongo oyo ezali kobuta mosika kuna na likoló.
Ozali koyoka ete mitungisi mizali kolɛmbisa yo? Na ntembe te, yo mpe okolinga kozwa ekimelo na nsé ya mapapu ya Oyo-Aleki-Likoló, mpo na “kopumbwa likoló na mapapu lokola mpongo.” Mpo na kososola lolenge nini yango ekoki kosalema, ebongi tóyeba makambo mosusu oyo matali mpongo, oyo mbala mingi esalelami na ndimbola ya elilingi kati na Makomami.
Na nsé ya bendɛlɛ ya mpongo
Kati na bandɛkɛ nyonso oyo bato ya kala batyelaki likebi, mbala mosusu mpongo ezalaki oyo elekaki kokamwisa mpamba te ezalaka na nguya mpe na motindo ya kopumbwa oyo ekamwisaka. Mampinga mingi ya kala, kamata mpe oyo ya Babilone, ya Palasa mpe ya Loma, matambolaki na nsé ya bendɛlɛ oyo ezalaki na elilingi ya mpongo. Moko na yango ezalaki bongo limpinga ya babundi ya Siruse Monene. Biblia esakolaki ete mokonzi wana ya Palasa akozala lokola ndɛkɛ oyo ekangaka nyama, oyo euti na ɛ́sti mpo na kopunza Bokonzi ya Babilone. (Yisaya 45:1; 46:11) Mibu nkáma mibale nsima wana esakweli yango ekomamaki, mampinga ya Siruse, oyo ezalaki na elilingi ya mpongo likoló na bendɛlɛ na yango, ekwelaki engumba ya Babilone lokola mpongo oyo ekiteli nyama.
Kala mingi te, babundi lokola Charlemagne mpe Napoléon bakisá mpe bamboka lokola États-Unis mpe Allemagne baponaki mpe mpongo lokola elembo na bango. Bayisalaele bazwaki etindá ete basengelaki te kokumisa bililingi ya mpongo to ya bikelamu mosusu. (Exode 20:4, 5) Nzokande, bakomi ya Biblia balobelaki na elilingi bizaleli mosusu ya mpongo mpo na kolimbola nsango na bango. Na yango, mpongo, ndɛkɛ oyo elobelami mingi kati na Makomami, esalelami lokola elembo ya bizaleli lokola mayele, libateli ya Nzambe mpe lombangu.
Liso ya mpongo
Banda kala, miso ya mpongo oyo emonaka mosika ekóma lisese. Atako mpongo ya lángi ya wolo mbala mingi elekaka kilo mitano te, nzokande miso na yango ezali minene koleka ya moto, mpe emonaka mosika koleka moto. Yehova ye moko, wana alobelaki Yobo makoki ya mpongo mpo na koluka bilei, alobaki ete: “Miso na ye ikomona yango mosika.” (Yobo 39:27, 29) Alice Parmelee, alobaki kati na búku na ye All the Birds of the Bible (Bandɛkɛ nyonso ya Biblia), ete “mokolo mosusu mpongo moko emonaki epɔlu ya mbisi kotepa na libéké na ntáká ya bakilomɛtɛlɛ mitano, mpe ebandaki kokita longwa kuna kino esika yango ezalaki. Mpongo esukaki te bobele na komona eloko moke na mosika koleka oyo moto akoki komona, kasi lisusu miso ya ndɛkɛ yango ebungisaki mbisi yango te wana ezalaki ye kokita longwa na ntáká molai wana ya bakilomɛtɛlɛ mitano.”
Na ntina na miso na yango oyo emonaka mosika, mpongo ezali elembo ebongi ya mayele, moko na bizaleli ya ntina ya Yehova. (Kokanisá na Ezekiele 1:10; Emoniseli 4:7.) Mpo na nini? Mayele elimboli komona mosika matomba oyo makambo nyonso tokoki kosala ekobimisa. (Masese 22:3) Mpongo, na makoki na yango ya komona mosika, ekoki kososola likámá na mosika mpe komibatela, motindo moko lokola moto ya bososoli na lisese ya Yesu, oyo amonaki ete mbula ya mopepe makasi ekoki kobɛta mpe atongaki ndako na ye likoló na mabángá. (Matai 7:24, 25) Likambo ya kobenda likebi, na monɔkɔ ya Espagnol, koloba na ntina na moto ete azali mpongo emonisi ete azali na bokɛngi mpe na bososoli.
Soki ozwi libaku ya komona mpongo penepene, talá lolenge asalelaka miso na ye. Ekotala yo te bobele nokinoki; nzokande, emonani lokola ete ekotalatala makambo mikemike nyonso oyo mazali na nzoto na yo. Bobele bongo, moto na mayele akotalela likambo na bokɛngi liboso na kozwa bikateli na esika ya kondimela bobele motema to mayoki na ye. (Masese 28:26) Atako miso ya mpongo oyo emonaka mosika ekómisi ye elembo ya mayele ya Nzambe, lolenge ya kopumbwa na yango ya kokamwa elobelami mpe kati na Biblia na maloba ya elilingi.
“Nzela na mpongo kati na mopɛpɛ”
“Nzela na mpongo kati na mopɛpɛ” eleki kokamwisa mpo na lombangu na yango mpe na lolenge oyo emonani ete ezali kopumbwa kozanga kosala molende, kozanga kolanda nzela moko ya sikisiki mpe kozanga kotika matambe. (Masese 30:19) Lombangu ya mpongo eyebisami kati na Bileli 4:19, epai kuna basodá ya Babilone balobelami ete: “Baoyo babéngani biso baleki bampongo na lola na mbangu; babengani biso likoló na ngomba, balambeli biso kati na lisobe.” Engebene makambo mosusu oyo mayebisami na ntina na yango, wana mpongo oyo ezali kopumbwa likoló emoni bilei, ekokangisa mwa moke mapapu na yango mpe ekokita, na lombangu oyo ekoki koleka bakilomɛtɛlɛ 130 na ngonga moko. Ezali likambo ya kokamwa te ete, Makomami mazali kosalela mpongo lokola elembo ya lombangu, mingi mpenza na likambo litali nguya ya babundi.—2 Samwele 1:23; Yilimia 4:13; 49:22.
Na ngámbo mosusu, Yisaya alobeli mpe lolenge mpongo epumbwaka kozanga kosala molende makasi. “Baoyo [“bakolikyaka epai na Yehova,”NW] bakozwa nguya na sika, bakopumbwa likoló na mapapu lokola mpongo, bakopota mbangu nde bakolɛmba te, bakotambola nde bakosenzwa te.” (Yisaya 40:31) Wapi sɛkɛlɛ́ ya mpongo ya kopumbwa kozanga kosala molende makasi? Kobuta likoló ezali kosɛnga milende mingi te mpamba te mpongo esalelaka mbóngé ya molungé, mopɛpɛ ya mɔ́tɔ oyo mozali kobuta likoló. Mbóngé ya molungé emonanaka te, kasi mpongo ezalaka elombe mpo na koyoka yango. Wana ayoki mbóngé ya molungé, mpongo ekopanza mapapu mpe mokila na ye mpe ekozolongana kati na mbóngé ya mopɛpɛ ya mɔ́tɔ, oyo ekotombola mpongo mosika likoló. Wana ekómi mpenza likoló, ekoleka na mbóngé mosusu ya molungé, epai kuna ekolanda kozolongana. Na lolenge yango mpongo ekoki kotikala na likoló na boumeli ya bangonga mingi kozanga kosilisa nguya na yango.
Na Israël, mingi mpenza na etúká ebéngami Rift Valley oyo ekei kino Ezion-geber na mabóngo ya Mai Motane kino na Dan epai na nɔ́rdi, mpongo imonanaka mingi. Izalaka mpenza mingi na eleko ya molungé mpe na ebandeli ya eleko ya mpiɔ wana bazali kosala mibémbo. Na bambula mosusu batángaki kino mpongo pene na 100000. Wana moi ya ntɔ́ngɔ́ epesi mopɛpɛ ya molungé, bankámá ya bandɛkɛ yango ikoki komonana likoló na mabángá oyo mazali na ndelo ya Rift Valley.
Motindo oyo mpongo epumbwaka kozanga kosala molende makasi ezali elilingi kitoko ya lolenge nguya ya Yehova ekoki kotombola biso na elimo mpe na mayoki ete tókoka kolanda kokokisa mosala na biso. Motindo moko lokola mpongo ekoki te kobuta likoló mingi na kosaleláká bobele nguya na ye moko, bobele bongo tokolónga te koyika mpiko soki totaleli makoki na biso moko. Ntoma Paulo alobaki ete: “Nayebi kosala makambo nyonso kati na ye oyo akokembisaka ngai na nguya.” (Bafilipi 4:13) Lokola mpongo oyo ezali ntango nyonso koluka mbóngé ya molungé, “tósɛngaka” nguya ya Yehova oyo ezangi komonana na nzela ya mabondeli ya molende.—Luka 11:9, 13.
Mbala mingi bampongo oyo izali kosala mibémbo imonaka mbóngé ya molungé na kotaláká ndɛkɛ mosusu. D. R. Mackintosh, moyekoli ya biloko bizalisami alobaki ete na libaku moko bamonaki mpongo mpe bingɔndɔ 250 bazali kozolongana elongo mpo na kobuta likoló kati na mbóngé moko ya molungé. Bobele bongo lelo oyo baklisto bakoki koyekola kotyela nguya ya Yehova motema na komekoláká ndakisa ya basaleli mosusu ya Nzambe oyo bazalaki sembo.—Kokanisá na 1 Bakolinti 11:1.
Na nsé ya malili ya mapapu ya mpongo
Moko kati na bileko ya makámá mingi na bomoi ya mpongo ezali bongo ntango azali koyekola kopumbwa. Mpongo mingi ekufaka kati na momekano yango. Na ebandeli na yango, libota ya Yisalaele mpe lizalaki na likámá ntango litikaki Ezipito. Na yango maloba oyo Yehova ayebisaki Bayisalaele mabongaki mpenza: “Bino bomoni yango esalaki ngai epai na Baezipito [“ete namemaki bino likoló na mapapu ya mpongo,”NW] mpe motindo eyeisaki ngai bino epai na ngai.” (Exode 19:4) Eyebani ete mpongo ememaka bana na bango na mokongo mpo ete bana yango bakoka kokufa te wana bazali koyekola kopumbwa. Kati na búku Palestine Exploration Quarterly, G. R. Driver ayebisi ete: “Bongo elilingi [ya Biblia] ezali te bobele kopumbwa na makanisi mpamba kasi yango ezali na moboko likoló na makambo ya solo.”
Mpongo izalaka mpe baboti ya ndakisa na lolenge mosusu. Bazali te bobele kopesa bana na bango bilei ntango nyonso kasi lisusu mama akataka mikemike nyama oyo mpongo ya mobali ememi yango na zúmbu mpo ete mwana akoka komela yango. Lokola zúmbu na bango etongamaka mbala mingi likoló na mabángá to likoló ya nzeté molai, bana ya ndɛkɛ yango batikamaka mpenza na esika ya molungé mpe ya mbula makasi. (Yobo 39:27, 28) Moi makasi, oyo engalaka na mikili oyo milobelami kati na Biblia, ekoki koboma mwana ya ndɛkɛ yango soki baboti na ye babateli ye te. Ndɛkɛ moboti ekopanza mapapu na yango, mbala mosusu na boumeli ya bangonga mingi na mokolo, mpo na kopesa malili epai na mwana na ye oyo azali naino moke.
Na yango, ezali likambo libongi ete mapapu ya mpongo masalelama kati na Makomami lokola elembo ya libateli ya Nzambe. Deteronome 32:9-12 ezali komonisa lolenge Yehova abatelaki Bayisalaele na boumeli ya mobémbo na bango kati na mokili mokauki: “Ndambo na biloko na [Yehova] ezali bato na ye, Yakobo azali libula eponami mpo na ye. Azwaki ye na mokili na zɛlɔ, mpe na lisobe na molengeli mpe na kolela na banyama, azingaki ye mpe abatelaki ye, akɛngɛlaki ye pelamoko na mbuma na liso na ye. Lokola na mpongo oyo apumbwisi libota na ye, oyo aumeli na likoló na bana na ye, asemboli mapapu na ye, mpe akamati bango, mpe amemi bango na nsala na ye, [Yehova] mpe ye moko akambaki ye.” Yehova akobatela biso na bolingo nyonso soki totyeli ye motema.
Nzela ya kokima
Mbala mosusu na ntango tokutani na mikakatano, tokoki koyoka mposa ya kokima mosika na mikakatano nyonso. Ezali mpenza likambo Davidi ayokaki. (Kokanisá na Nzembo 55:6, 7.) Atako Yehova asili kolaka ete akosunga biso wana tozali kokutana na mikakatano mpe na mpasi kati na ebongiseli oyo, akopesa nzela ya kokima mikakatano nyonso te. Biblia ezali kondimisa biso ete: “Emekeli moko ekómeli bino te oyo ezangi epai na bato nyonso. Nzambe azali sembo; ye oyo akotika bino te ete bómekama na koleka nguya na bino, kasi esika moko na emekeli, akobongisa ekimelo ete bókoka koyika mpiko.”—1 Bakolinti 10:13.
“Ekimelo” to “nzela ya kokima” (King James Version) esangisi koyekola kotyela Yehova motema. Ezali yango nde Max Liebster, oyo maloba na ye matángami na ebandeli ya lisoló oyo amonaki. Na boumeli ya mibu oyo alekisaki na káa ya bakangami, ayaki koyeba Yehova mpe kotyela ye motema. Lokola Max amonaki yango, Yehova ayikisaka biso mpiko na nzela ya Liloba na ye, na elimo na ye mpe na lisangá na ye. Ata kati na káa, Batatoli balukaki baninga na bango bandimi mpe balendisaki bango na elimo, batalelaki elongo makanisi mazwami na Biblia mpe na mikanda nyonso oyo mikolimbolaka Biblia oyo mikokaki komonana. Yehova alendisaki bango, lokola bandeko ya sembo oyo babikaki bapesaka elembeteli na yango mbala na mbala. Max ayebisi ete, “Nazalaki ntango nyonso kosɛnga na Yehova ete asalisa ngai, mpe elimo na ye esungaki ngai.”
Bobele bongo, ata tozali kokutana na komekama nini, tokoki kotyela elimo santu ya Nzambe motema, soki tokokóba kosɛnga yango. (Matai 7:7-11) Wana toyikisami mpiko na “nguya yango mingi,” tokobuta likoló na esika ete tózinda na ntina na mikakatano na biso. Tokolanda kotambola kati na nzela ya Yehova, mpe tokolɛmba te. Tokopumbwa likoló na mapapu lokola mpongo.—2 Bakolinti 4:7; Yisaya 40:31.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 10]
Ekotala yo te bobele nokinoki
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 9]
Foto: Cortesía de GREFA
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 10]
Foto: Cortesía de Zoo de Madrid