Mokanda ya Biblia nimero 34—Nahumu
Mokomi: Nahumu
Esika ya bokomi: Yuda
Nsuka ya bokomi: Liboso ya 632 L.T.B.
1. Makambo nini mayebani na ntina na Ninive ya kala?
“EYAMBWELI ya kokweisa Ninive.” (Nah. 1:1, NW) Esakweli ya Nahumu ebandi na maloba wana ya kobangisa. Kasi mpo na nini asakolaki eyambweli oyo ya kokweisama? Makambo nini toyebi na ntina na Ninive ya kala? Lisoló na yango elobami na mokuse na Nahumu kati na maloba misato: “mboka na makila.” (3:1) Ngomba mibale oyo izali na ɛ́sti ya libóngo ya Ebale Tigre oyo ezali kotalana na engumba ya mikolo na biso oyo ebéngami Mosul, na nɔ́rdi ya Irak, emonisi esika oyo Ninive ya kala ezalaki. Etongamaki makasi na bifelo mpe na mabulu mpe ezalaki mboka-mokonzi ya Boyangeli ya Asulia na nsuka ya lisoló na yango. Nzokande, ebandeli ya engumba wana ezalaki uta na mikolo ya Nimilodi, “moluki makasi na nyama liboso na [Yehova] . . . Akendaki na Asulia mpe atongaki Ninive.” (Gen. 10:9-11) Na bongo, ebandeli ya Ninive ezalaki mabe. Ekómaki na lokumu mingi na boumeli ya boyangeli ya Salegone, Senakeliba, Esala-hadono, Asulubanipala, na eleko ya nsuka ya Boyangeli ya Asulia. Na nzela ya bitumba mpe ya bobɔtɔli bamboka, ekómaki na bozwi mingi mpe eyebanaki mingi na ntina na minyoko makasi oyo bakonzi na yango bazalaki koyokisa ebele na bakangami.a C. W. Ceram, alobi na lokasa 266 ya búku na ye Banzambe, nkunda mpe bato na mayele (1954) [na Lingelesi] ete: “Ninive etikalá na makanisi ya bato bobele elilingi ya koboma, kopunza, kopesa bitumbu, mpe konyokola bato na botau; bitumba mpe lolenge nyonso ya minyoko na nzoto; misala ya molɔngɔ́ ya bakonzi oyo bazalaki kosopa makila, baoyo bazalaki koyangela bobele na makasi mpe mbala mingi bazalaki kobomama na banguna na bango oyo bazalaki bato na mobulu makasi koleka bango moko.”
2. Losambo ya lolenge nini ezalaki na Ninive?
2 Ezali boni mpo na makambo ya losambo na Ninive? Ezalaki kosambela ebele ya banzambe, mingi kati na bango bautaki na Babilone. Bakonzi na yango bazalaki kobelela banzambe wana ntango bazalaki kokende koboma to kobebisa, mpe banganga na yango ya lokoso bazalaki na bopusi likoló na bitumba yango, kozeláká kozwa biloko oyo bipunzamaki. Kati na búku na ye, Ancient Cities (1886, lokasa 25), W. B. Wright alobi ete: “Bazalaki kosambela mpo na makasi, mpe bazalaki kopesa mabondeli na bango bobele epai na bikeko minene ya mabanga, na nkosi mpe na ngɔmbɛ mibali oyo binama na yango ezalaki minene, mapapu ya mpongo mpe mitó ya bato, izalaki komonisa nguya, mpiko mpe bolóngi. Kobunda ezalaki mosala ya libota wana, mpe banganga bazalaki ntango nyonso kobimisa bitumba yango. Bazalaki kobikela na biloko oyo bizwamaki na bitumba, oyo motuya mosilá kokatama mozalaki kopesama epai na bango liboso ete bato mosusu bázwa yango, mpamba te bapunzi wana bamipesaki mingi na makambo ya losambo.”
3. (a) Na lolenge nini ndimbola ya nkombo ya Nahumu ebongi mpenza? (b) Esakweli ya Nahumu ezalaki na eleko nini?
3 Esakweli ya Nahumu, atako ezali mokuse, etondi na makambo mingi ya ntina. Makambo nyonso oyo toyebi na ntina na mosakoli mamonisami kati na vɛrsɛ́ ya ebandeli: “Mokanda na emonaneli na Nahumu, moto na Elekosa.” Nkombo na ye (na Liebele, Na·chumʹ) elimboli “Mobɔndisi.” Nsango na ye ezalaki mpenza libɔndisi te mpo na Ninive, kasi epai na libota ya solosolo ya Nzambe, yango ezalaki kopesa elikya mpe kobɔndisama ya koumela liboso na monguna moko mabe mpe ya nguya. Ezali mpe likambo ya kobɔndisa na koyeba ete Nahumu alobeli te masumu ya bato na ye. Atako esika oyo Elekosa ezalaki eyebani na sikisiki te, emonani mpenza ete esakweli oyo ekomamaki na Yuda. (Nah. 1:15) Kokwea ya Ninive, oyo esalemaki na mobu 632 L.T.B., esalemaki naino te ntango Nahumu azalaki kokoma esakweli na ye, mpe akokanisi likambo wana na kokwea ya No-amono (Thèbes, na Ezipito) ete esalemaki mwa moke liboso na kokwea oyo. (3:8) Na yango, Nahumu asengelaki kosilisa kokoma esakweli na ye na boumeli ya mwa ntango liboso na eleko oyo.
4. Bizaleli nini bitali bokomi bimonani na mokanda ya Nahumu?
4 Ekomeli ya mokanda oyo ekeseni mpenza. Ezali na maloba ya bongo na bongo te. Nguya na yango mpe bosolo na yango endimisi likambo oyo ete yango ezali moko kati na mikanda mipemami. Mokanda ya Nahumu emikesenisi na elobeli na yango oyo etondi na bandimbola, na mayoki, mpe na kosimba motema, ezali lisusu na maloba mabongi, bilakiseli ya pɛto, mpe maloba na yango makomami mpenza na lolenge ya malamu. (1:2-8, 12-14; 2:4, 12; 3:1-5, 13-15, 18, 19) Eteni monene ya mokapo ya liboso emonani ete ekomami engebene alfabɛ́ ya Liebele. (1:8, NW, maloba na nsé ya lokasa) Ekomeli ya Nahumu ezali na ntina mingi mpo na motó na likambo na yango bobele moko. Azali koyoka mpii makasi mpo na banguna ya Yisalaele, oyo basalaki na lolenge ya bokosi. Azali komona likambo mosusu te bobele etumbu ya Ninive.
5. Nini emonisi bosolo ya esakweli ya Nahumu?
5 Bosolo ya esakweli ya Nahumu emonisami na bosikisiki ya kokokisama na yango. Na mikolo ya Nahumu, longola bobele mosakoli ya Yehova, nani mosusu akokaki komeka kosakola ete mboka-mokonzi wana ya Asulia, na lolendo na yango, oyo ezalaki nguya ya mokili mobimba, esengelaki kozipolama na “bikuke na bibale,” ete ndako na yango monene esopani, mpe ete yango moko ekokóma “mboka mpamba mpe epunzami, mpe ebebisami”? (2:6-10) Makambo mabimaki na nsima mamonisaki ete esakweli wana epemamaki solo na Nzambe. Mikanda ya makambo masalaki Nabopolassar, mokonzi ya Babilone, milobeli kokamatama ya Ninive na Bamede mpe bato na Babilone: “[Babongolaki] mboka ete ekóma nkeka oyo ibebisami mpe mabóndo (ya bitika) . . . ].”b Na bongo, libebi ya Ninive ezalaki mpenza mobimba na boye ete ata esika oyo yango ezalaki esilá kobosanama na boumeli ya bikeke. Bato mosusu ya mayele bakómaki kútu kotyola Biblia na likambo oyo, kolobáká ete Ninive ezalaki soko moke te.
6. Nini esili kokundolama na esika oyo Ninive ya kala ezalaki oyo emonisi bosikisiki ya mokanda ya Nahumu?
6 Nzokande, likambo mosusu mpo na kopesa elembeteli ya bosolo ya mokanda ya Nahumu, ezali ete esika Ninive ezalaki eyaki komonana, mpe bolukiluki ebandaki kosalema kuna na ekeke ya 19. Ekanisamaki ete esengelaki bamilió ya batɔ́ni ya mabelé mpo na kotimola yango na mobimba. Nini esili kokundolama na Ninive? Makambo mingi oyo mandimisi bosikisiki ya esakweli ya Nahumu! Na ndakisa, bamonimá na yango mpe makomi na yango emonisi minyokoli na yango, mpe ezali na bitika ya bikeko minene ya ngɔmbɛ mibali mpe nkosi oyo izali na mapapu. Likambo ya kokamwa ezali te soki Nahumu alobelaki yango lokola “efandelo na nkosi”!—2:11.c
7. Nini endimisi kopemama ya mokanda ya Nahumu?
7 Kopemama ya mokanda ya Nahumu emonisami na likambo oyo ete yango endimamaki epai na Bayuda lokola eteni ya Makomami mapemami. Yango nyonso ezali na boyokani na mikanda misusu ya Biblia. Esakweli epesami na nkombo ya Yehova, oyo bizaleli na ye mpe bonene na ye elobelami mingi.
MAKAMBO MAZALI KATI NA NAHUMU
8. Etumbu nini esakolami na ntina na Ninive, kasi nsango malamu nini epesami mpo na Yuda?
8 Eyambweli ya Yehova mpo na kokweisa Ninive (1:1-15). “[Yehova azali Nzambe oyo azali kosɛnga bokangami makasi] mpe akobukanisa.” Na maloba wana, mosakoli amonisi oyo ekozala ‘eyambweli ya kokweisa Ninive.’ (1:1, 2, NW) Atako Yehova ayokaka nkanda noki te, talá sikawa lolenge azali komonisa kobukanisa na nzela ya mopɛpɛ makasi mpe ekumbaki. Ngomba izali kotetema, nkeka izali konangwa, mpe mabelé ezali kotombwana likoló. Nani akotɛlɛma liboso ya kongala ya nkanda na ye? Atako bongo, Yehova azali esika makasi mpo na baoyo bazali koluka ekimelo epai na ye. Kasi Ninive ekweisami. Ekobomama na mpela, mpe “minyoko ikobima mbala na mibale te!” (1:9) Yehova akolongola nkombo na yango mpe banzambe na yango. Akokunda yango. Na bokeseni oyo ezali kobɔndisa mpenza, nsango malamu ezali mpo na Yuda! Nsango yango nini? Mosakoli na kimya azali kobénga bango mpo na kokumisa bilambo na bango mpe kokokisa ndai na bango, mpamba te monguna, “oyo na mabe,” akweisami. “Akozɛngama solo.”—1:15.
9. Likanisi nini ya esakweli tososoli na kotalela kokwea ya Ninive?
9 Emonaneli ya libebi ya Ninive (2:1–3:19). Nahumu azali kobɛtɛla Ninive ntembe ete ebakisa nguya na yango mpo na kotɛmɛla mopunzi oyo azali koya. Yehova akoyanganisa lisusu oyo ya ye moko ‘lolendo ya Yakobo mpe ya Yisalaele.’ Talá nguba mpe bilamba ya lángi ya motane ngwaa ya bato na ye ya makasi mpe bibendé bizali kongɛnga ya “makalo na mokolo yango”! Makalo “makolekaleka mbangu” na nzela minene, mazali koleka mbangu lokola nkake. (2:2-4) Sikawa, toyebi etumba oyo elobelami na esakweli. Bato na Ninive bazali kolɛnga mpe bazali kosala nokinoki mpo na kobatela efelo kasi balóngi te. Bikuke ya ebale bifungwami, ndako minene isopani, mpe baombo basi bazali kolela mpe bazali kobɛtabɛta ntolo na bango. Elobami epai na mibali oyo bazali kokima ete bátɛlɛma, kasi moto moko atali nsima te. Mboka epunzami mpe etikali mpamba. Mitema minyangwi. Efandelo wana ya nkosi ezali sikawa epai wapi? Nkosi asili kotondisa bibombelo na ye na bilei mpo na bana na ye, kasi Yehova alobi ete: “Talá nazali kotɛmɛla yo.” (2:13) Ɛɛ, Yehova akozikisa makalo ya Ninive, akotinda mopanga mpo na koboma bana na nkosi na ye, mpe kolongola bilei na ye na mabelé.
10. Ninive emonisami polele lokola nini, mpe lolenge nini nsuka na yango elobelami mingi?
10 “Mawa epai na mboka na makila, etondi na nkuta mpe na biloko bipunzami.” Yoká kolela ya fimbo mpe lokito ya yika. Talá kopota ya mpunda, kopumbwa ya likalo, kobuta ya momati na mpunda, kongala ya mopanga, mpe kongɛnga ya likɔnga—mpe na nsima, mabóndo na bibembe. “Bibembe izali na nsuka te.” (3:1, 3) Mpo na nini bongo? Ezali mpo ete asili kotaisa bikólo libaku mpo na pite na ye mpe mabota mpo na bondɔki na ye. Mpo na mbala ya mibale, Yehova alobi ete: “Talá, nazali kotɛmɛla yo.” (3:5) Ninive ekotɔndɔlama lokola mwasi na ekobo mpe akopunzama, kokwea na ye ekozala mabe koleka oyo ya No-amono (Thèbes), oyo Asulia akamataki na boombo. Bibombamelo na yango bikómi lokola mbuma na mosuke oyo iteli, oyo “soko ikobɛtama ikokwea kati na monɔkɔ na molei!” (3:12) Bilombe na ye bazali lokola basi. Ezali na eloko moko te oyo ekoki kobikisa Ninive longwa na mɔ́tɔ mpe na mopanga. Basodá na ye bakokima lokola liboke na mayoyo na mokolo na moi makasi, mpe bato na ye bakopanzana. Mokonzi na Asulia akososola ete lisungi ezali te, mpe kobikisama ezali te mpo na mpasi wana. Baoyo nyonso bakoyoka nsango wana bakobɛta mabɔkɔ na bango, mpamba te bango nyonso bamonaki mpasi na ntina na mabe ya Asulia.
LITOMBA NA YANGO
11. Mitindá nini ya moboko kati na Biblia mimonisami na mokanda ya Nahumu?
11 Esakweli ya Nahumu emonisi mwa ndambo na mitindá ya moboko ya Biblia. Maloba ya ebandeli ya emonaneli mazongeli ntina mpo na yango Nzambe apesaki mobeko ya mibale kati na Mibeko Zomi: “Yehova azali Nzambe oyo azali kosɛnga bokangami makasi.” Nokinoki nsima na yango, ayebisi solo ete “akobukanisa likoló na batɛmɛli na ye.” Lolendo mabe ya Asulia mpe banzambe ya bapakano bakoki te kobikisa ye ntango Yehova akosambisa ye. Tokoki kondimisama ete na lolenge bobele moko Yehova akosambisa bato mabe nyonso. “[Yehova] akosilika noki te, azali monene na nguya na ye; akolóngisa bato mabe te.” Na yango, bosembo ya Yehova mpe bonene na ye ekumisami na ntango ya kobomama ya Asulia, mokili na nguya. Ninive ekómaki solo ‘mboka na mpamba mpe epunzami mpe ebebisami!’—1:2, 3; 2:10.
12. Kozongisama nini lisusu Nahumu asakoli, mpe lolenge nini esakweli na ye ekoki kozala na boyokani na elikya ya Bokonzi?
12 Na bokeseni na Ninive oyo ‘ebomamaki na mobimba na yango,’ Nahumu ayebisi kozongisama lisusu ya ‘lolendo ya Yakobo mpe ya Yisalaele.’ Lisusu, Yehova atindi nsango kitoko oyo epai na bato na ye: “Talá likoló na ngomba makolo na ye oyo akoyeisa nsango malamu, ye oyo akosakola kimya.” Nsango malamu wana ya kimya ezali na boyokani na Bokonzi ya Nzambe. Lolenge nini toyebi yango? Ezali likambo ya polele mpamba te Yisaya asaleli elobeli yango moko, kasi abakisi maloba oyo: ‘Ye oyo akoyeisa nsango malamu na kosepela, ye oyo akoloba na Siona ete, Nzambe na yo akómi mokonzi.’ (Nah. 1:15; 2:2; Yis. 52:7) Epai mosusu, na Baloma 10:15, ntoma Paulo asaleli maloba yango epai na baoyo Yehova atindi lokola baklisto basakoli ya nsango malamu. Bango bazali kosakola “nsango malamu ya bokonzi.” (Mat. 24:14) Na boyokani na ndimbola ya nkombo na ye, Nahumu apesi libɔndisi mingi mpo na baoyo nyonso bazali koluka kimya mpe kosikolama oyo ekoya na nzela ya Bokonzi ya Nzambe. Bango nyonso bakoyeba ete ‘Yehova azali malamu, ndako makasi na mokolo ya mpasi mpo na baoyo bazali koluka ekimelo epai na ye.’—Nah. 1:7.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, lokasa 201.
b Búku Ancient Near Eastern Texts, ekomami na J. B. Pritchard, 1974, lokasa 305; ba crochets mpe ba paranteze ya bango moko; búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, lokasa 958.
c Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, lokasa 955.