Ebandeli
35 Nsima na yango, Nzambe alobaki na Yakobo ete: “Tɛlɛmá, matá na Betele mpe fandá kuna,+ mpe kuna salá etumbelo mpo na Nzambe ya solo oyo abimelaki yo ntango ozalaki kokima Esau ndeko na yo.”+
2 Bongo Yakobo alobaki na bato ya ndako na ye mpe na baoyo nyonso bazalaki elongo na ye ete: “Bólongola banzambe ya bapaya oyo bazali na kati na bino+ mpe bómipɛtola mpe bólata bilamba mosusu,+ 3 mpe tiká tótɛlɛma mpe tómata na Betele. Mpe kuna nakosala etumbelo mpo na Nzambe ya solo oyo ayanolaki ngai na mokolo oyo nazalaki na mpasi+ na ndenge azalaki elongo na ngai na nzela oyo nakendaki.”+ 4 Na bongo, bapesaki Yakobo banzambe nyonso ya bapaya+ oyo bazalaki na mabɔkɔ na bango mpe biloko ya matoi oyo ezalaki na matoi na bango, mpe Yakobo akundaki+ yango na nse ya nzete monene oyo ezalaki pene na Shekeme.
5 Nsima na yango, basimbaki nzela bakei, mpe nsɔmɔ ya Nzambe ekwelaki bingumba oyo ezalaki zingazinga na bango,+ mpe balandaki bana ya Yakobo te. 6 Nsukansuka Yakobo akómaki na Luze,+ oyo ezali na mokili ya Kanana, elingi koloba, Betele, ye ná bato na ye nyonso oyo bazalaki elongo na ye. 7 Bongo atongaki etumbelo na esika wana mpe akómaki kobenga esika yango Ele-betele, mpamba te na esika wana Nzambe ya solo amimonisaki epai na ye na ntango oyo azalaki kokima ndeko na ye.+ 8 Na nsima, Debora+ mobateli ya Rebeka akufaki mpe akundamaki na nse ya ngomba ya Betele, na nse ya nzete moko monene. Na yango, apesaki yango nkombo Alone-bakute.
9 Bongo Nzambe abimelaki lisusu Yakobo na ntango azalaki kouta na Padane-arame+ mpe apambolaki ye.+ 10 Mpe Nzambe alobaki na ye lisusu ete: “Nkombo na yo ezali Yakobo.+ Bakobenga yo lisusu te na nkombo Yakobo, kasi nkombo na yo ekokóma nde Yisraele.” Mpe akómaki kobenga ye na nkombo Yisraele.+ 11 Mpe Nzambe alobaki na ye lisusu ete: “Ngai nazali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.+ Botá mpe kómá mingi. Bikólo mpe lisangá ya bikólo ekouta na yo, mpe bakonzi bakouta na bangɛi na yo.+ 12 Mpo na mokili oyo napesaki Abrahama mpe Yisaka, nakopesa yo yango, mpe nakopesa momboto na yo+ oyo ekoya nsima na yo mokili yango.”+ 13 Nsima na yango, Nzambe amataki, atiki ye na esika oyo azalaki kosolola na ye.+
14 Na bongo, Yakobo atɛlɛmisaki likonzí na esika oyo asololaki na ye,+ likonzí ya libanga, mpe asopelaki yango likabo ya masanga mpe asopelaki yango mafuta.+ 15 Mpe Yakobo akobaki kobenga esika oyo Nzambe asololaki na ye na nkombo Betele.+
16 Na nsima, balongwaki na Betele mpe basimbaki nzela bakei. Mpe nzela ezalaki naino molai liboso ya kokóma na Efrata,+ bongo na Ntango yango Rashele abandaki kobota, mpe abotaki na mpasi.+ 17 Kasi esalemaki boye: lokola kobota ezalaki mpasi, mobotisi alobaki na ye ete: “Kobanga te, mpo okozwa mpe mwana mobali oyo.”+ 18 Mpe esukaki boye: wana molimo na ye+ ezalaki kobima (mpamba te akufaki)+ apesaki ye nkombo Bene-oni; kasi tata na ye abengaki ye Benyamina.+ 19 Na yango, Rashele akufaki mpe akundamaki na nzela oyo ezali kokende na Efrata, elingi koloba, Beteleme.+ 20 Bongo Yakobo atɛlɛmisaki likonzí moko likoló ya lilita na ye. Yango nde likonzí ya lilita ya Rashele tii na mokolo ya lelo.+
21 Nsima na yango, Yisraele asimbaki nzela akei mpe atɛlɛmisaki hema na ye mwa mosika koleka ndako molai ya Edere.+ 22 Mpe esalemaki boye: ntango Yisraele azalaki kofanda na bahema+ na mokili yango, Rubene akendaki kolala na Bila makango ya tata na ye, mpe Yisraele ayokaki likambo yango.+
Bongo bana mibali ya Yakobo bazalaki zomi na mibale. 23 Bana mibali ya Lea bango oyo: Rubene,+ mwana ya liboso ya Yakobo, ná Simeone ná Levi ná Yuda ná Isakare mpe Zebulone. 24 Bana mibali ya Rashele bango oyo: Yozefe ná Benyamina. 25 Mpe bana mibali ya Bila, mosaleli ya Rashele bango oyo: Dani ná Nafatali. 26 Mpe bana mibali ya Zilipa, mosaleli ya Lea bango oyo: Gade ná Ashere. Bango bazali bana mibali ya Yakobo oyo ye abotaki na Padane-arame.
27 Nsukansuka Yakobo akómaki epai ya Yisaka tata na ye na Mamare,+ na Kiriate-arba,+ elingi koloba, Hebrone, epai Abrahama ná Yisaka bafandaki bapaya.+ 28 Mpe mikolo ya Yisaka ezalaki mbula nkama moko na ntuku mwambe (180).+ 29 Nsima na yango, Yisaka akataki mpema mpe akufaki mpe ayanganisamaki na bato na ye, anuni mpe atondi na mikolo,+ mpe Esau ná Yakobo bana na ye bakundaki ye.+