Mwayambo, 15 sanza ya 6
Nzambe alingaki mokili mingi mpenza yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki.—Yoa. 3:16.
Na Yisraele, Mokolo ya kozipa masumu ezalaki molulu ya mbula na mbula. Na mokolo yango, nganga-nzambe monene azalaki kopesa bambeka ya banyama mpo na bato. Ya solo, bambeka ya banyama ekokaki te kozipa libela masumu ya moto mpo nyama ezali na motuya moke liboso ya bato. Kasi, soki Bayisraele oyo babongoli motema bapesi bambeka oyo Yehova asɛngaki, azalaki kondima kolimbisa masumu na bango. (Ebr. 10:1-4) Ebongiseli wana ezalaki kokundwela Bayisraele ete kozala moto ya masumu ezali lisɛki te. Kasi, Yehova ayebaki ete akotya ebongiseli moko ya libela mpo na kolimbisa masumu. Abongisaki ete Mwana na ye ya bolingo “[akabama] mbala moko mpo na libela mpo na komema masumu ya bato mingi.” (Ebr. 9:28) Yesu apesaki “bomoi na ye lisiko na esika ya bato mingi.”—Mat. 20:28. w25.02 4 par. 9-10
Mwamibale, 16 sanza ya 6
Bókoba kosɛnzɛla mpe kobondela ntango nyonso, mpo bókwea na komekama te.—Mat. 26:41.
“Elimo ezali na molende, kasi nzoto ezali na bolɛmbu.” (Mat. 26:41b) Na maloba yango, Yesu amonisaki ete ayebi ete tozali bato ya kozanga kokoka mpe tokosala mabunga. Kasi, maloba yango ezali mpe na likebisi moko: Tosengeli te komityela motema koleka ndelo. Mwa bangonga liboso Yesu aloba maloba wana, kaka na butu wana, bayekoli na ye batutaki ntolo ete bakotika Nkolo na bango te, ata ndenge nini. (Mat. 26:35) Bazalaki na mposa ya kosala oyo ezali malamu. Kasi, bayebaki te ndenge ekokaki kozala mpasi bátikala ngwi soki batye bango mbamba. Yango wana Yesu akebisaki bango na maloba oyo ezali na mokapo ya lelo. Likambo ya mawa, bayekoli bakobaki kosɛnzɛla te. Ntango bakangaki Yesu, batikalaki elongo na ye to bakweaki na komekama mpe bakimaki? Lokola bayekoli bazalaki ekɛngɛ te, basalaki likambo oyo batutaki ntolo ete bakosala ata moke te: basundolaki Yesu.—Mat. 26:56. w24.07 14 par. 1-2
Mwamisato, 17 sanza ya 6
Tozongisaki boyokani ná Nzambe na nzela ya liwa ya Mwana na ye.—Rom. 5:10.
Adama ná Eva babebisaki mpe boyokani oyo bazalaki na yango na Tata na bango Yehova. Na ebandeli, bazalaki na kati ya libota ya Nzambe. (Luka 3:38) Kasi ntango babukaki mobeko ya Yehova, balongolamaki na libota na ye liboso bábanda kobota bana. (Eba. 3:23, 24; 4:1) Na yango, lokola tozali bakitani na bango, tosengeli kozongisa boyokani na Yehova. (Rom. 5:10, 11) Na maloba mosusu, tosengeli koluka kokóma baninga na ye. Diksionɛrɛ moko emonisi ete liloba ya Grɛki oyo basaleli na bavɛrsɛ yango mpo na “kozongisa boyokani” ekoki kolimbola “kotika kozala banguna mpe kokóma baninga.” Likambo ya kokamwa, Yehova nde moto azwaki bibongiseli mpo na kozongisa boyokani yango. Ndenge nini? Na nzela ya ebongiseli ya kozipa masumu, oyo Yehova azwaki mpo na kozongisa boyokani malamu kati na ye ná bato ya masumu. Yango esɛngi kopesa eloko moko na esika ya eloko mosusu oyo ezali na motuya ndenge moko. Na ndenge yango, eloko oyo ebungaki to ebebaki ekoki kozongisama, to eloko mosusu ekoki kozwa esika na yango. w25.02 3-4 par. 7-8