Yosua
5 Mpe esalemaki boye: ntango kaka bakonzi nyonso ya Baamore,+ oyo bazalaki na ngámbo ya Yordani na wɛsti, mpe bakonzi ya Bakanana,+ oyo bazalaki pene na mbu, bayokaki ete Yehova akaukisaki mai ya Yordani liboso ya bana ya Yisraele tii ntango basilisaki kokatisa, mitema na bango ebandaki kolɛmba,+ mpe bazalaki lisusu na mpema te ya kotɛlɛma liboso ya bana ya Yisraele.+
2 Kaka na ntango yango, Yehova alobaki na Yosua boye: “Salá bambeli ya mabanga ya silekise mpe katá bana ya Yisraele ngenga+ lisusu, mpo na mbala ya mibale.” 3 Bongo Yosua asalaki bambeli ya mabanga ya silekise mpe akataki bana ya Yisraele ngenga na Gibeate-haaralote.+ 4 Talá ntina oyo Yosua akataki bango ngenga: bato nyonso oyo babimaki na Ezipito, mibali, bato nyonso ya etumba, bakufaki+ na nzela na esobe ntango bazalaki kobima na Ezipito. 5 Mpamba te bato nyonso oyo babimaki na Ezipito bazalaki bato bakatamá ngenga, kasi bato nyonso oyo babotamaki na nzela na esobe, ntango bazalaki kobima na Ezipito, bakataki bango ngenga te. 6 Mpo bana ya Yisraele batambolaki mbula ntuku minei (40)+ na esobe, tii ntango ekólo mobimba ya mibali ya etumba oyo babimaki na Ezipito, oyo baboyaki koyoka mongongo ya Yehova basilaki, baoyo Yehova alapaki ndai mpo na bango ete bakomona soki moke te mokili+ oyo Yehova alapelaki bankɔkɔ na bango ete akopesa biso,+ mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi.+ 7 Mpe na esika na bango, atɛlɛmisaki bana na bango.+ Yosua akataki bango ngenga, mpamba te bazalaki bisutu, mpo bakataki bango ngenga na nzela te.
8 Mpe esalemaki boye: ntango basilisaki kokata ekólo mobimba ngenga, batikalaki na bisika na bango na kaa tii ntango bazwaki makasi lisusu.+
9 Na nsima, Yehova alobaki na Yosua boye: “Lelo, nalongoli bino nsɔni ya Ezipito, nabaloli yango.”+ Yango wana, esika yango ekómá kobengama na nkombo Gilgale+ tii na mokolo ya lelo.
10 Mpe bana ya Yisraele bakobaki kofanda na kaa na Gilgale, mpe basalaki elekeli na mpokwa ya mokolo ya zomi na minei ya sanza yango,+ na mokili patatalu oyo ekauká ya Yeriko. 11 Mpe, na mokolo oyo elandaki elekeli, babandaki kolya mwa biloko oyo ezalaki kobima na mokili yango, bagato oyo ezangi levire+ mpe mbuma ya kotumba, na mokolo wana kaka. 12 Bongo, mana etikaki kokwea na mokolo oyo elandaki, ntango balyaki mwa biloko ya mokili yango, mpe mana emonanaki lisusu te mpo na bana ya Yisraele,+ mpe babandaki kolya mwa biloko oyo ezalaki kobima na mokili ya Kanana na mbula wana.+
13 Mpe esalemaki boye: ntango Yosua akómaki pene na Yeriko, atombolaki miso na ye mpe talá, ezalaki na mobali+ moko kuna oyo atɛlɛmaki liboso na ye mpe, na lobɔkɔ na ye, asimbaki mopanga oyo abendi na libenga na yango.+ Bongo, Yosua apusanaki pene na ye mpe alobaki na ye ete: “Ozali na ngámbo na biso to na ngámbo ya banguna na biso?” 14 Na yango, ye alobaki ete: “Te, nazali nde mokonzi ya limpinga ya Yehova; nayei sikoyo.”+ Ntango Yosua ayokaki bongo, akweaki elongi na nse, afukamaki+ mpe alobaki na ye boye: “Nkolo na ngai alobi nini na mosaleli na ye?” 15 Bongo mokonzi ya limpinga ya Yehova alobaki na Yosua ete: “Longolá basandale na yo na makolo, mpamba te esika oyo otɛlɛmi ezali mosantu.” Na mbala moko, Yosua asalaki bongo.+