17 Mpe alobaki na Adama ete: “Lokola oyoki mongongo ya mwasi na yo mpe olei mbuma ya nzete oyo napesaki yo mobeko+ oyo ete: ‘Osengeli kolya mbuma na yango te,’ mabele elakelami mabe mpo na yo.+ Mikolo nyonso ya bomoi+ na yo okolya na mpasi biloko oyo mabele ekobota.