Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 1:14
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 “‘Nzokande, soki apesi bandɛkɛ lokola likabo ya kotumba mpo na Yehova, akopesa likabo na ye oyo euti na bipopo* to bana ya bibenga na ye.+

  • Balevi 5:7
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 “‘Kasi, soki azali na makoki te ya kozwa mpate, asengeli komemela Yehova bipopo* mibale to bana mibale ya bibenga+ lokola likabo na ye ya ngambo mpo na lisumu, moko likabo mpo na lisumu mpe moko likabo ya kotumba.+

  • Balevi 14:21, 22
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 “Kasi, soki azali mobola mpe azali na biloko mingi te, akozwa mwana-mpate ya mobali moko ezala likabo ya ngambo mpo na likabo ya koningisa mpo na kozipa masumu na ye moko ná moko ya bandambo zomi ya efa* ya farini ya malamu oyo basangisi na mafuta lokola likabo ya mbuma ná logi moko ya mafuta, 22 mpe bipopo* mibale to bana mibale ya bibenga, na kotalela makoki na ye. Moko ekozala likabo mpo na lisumu mpe mosusu likabo ya kotumba.+

  • Luka 2:24
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Mpe bapesaki mbeka ndenge Mibeko ya Yehova* elobaki: “Bipopo* mibale to bana mibale ya bibenga.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto