-
Balevi 1:10, 11Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
10 “‘Soki likabo na ye mpo na likabo ya kotumba euti na etonga ya bana-mpate+ ya mibali to ya bantaba, asengeli kopesa nyama ya mobali oyo ezangi mbeba.+ 11 Yango ekobomama na ngámbo ya nɔrdi ya etumbelo liboso ya Yehova, mpe bana mibali ya Arona, banganga-nzambe, bakomwangisa makila na yango na mipanzi nyonso ya etumbelo.+
-