Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 32:9, 10
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Yehova alobaki lisusu na Moize ete: “Namoni ete bazali bato moko ya motó makasi.*+ 10 Bongo sikoyo tiká ngai, nkanda na ngai engalela bango mpe nasilisa bango nyɛɛ, mpe na esika na bango nakosala ekólo moko monene na nzela na yo.”+

  • Mitángo 25:3
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Bongo Yisraele esanganaki na losambo ya* Baala ya Peore,+ mpe Yehova asilikelaki mpenza Yisraele.

  • Kolimbola Mibeko 11:16, 17
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Bókeba, bótika te motema na bino ekosama tii bópɛngwa, noki bósambela banzambe mosusu mpe bógumbamela bango.+ 17 Bongo nkanda ya Yehova ekongalela bino, mpe akokanga likoló mpo mbula enɔka te+ mpe mabele epesa mbuma na yango te mpe bokokufa nokinoki na mokili malamu oyo Yehova azali kopesa bino.+

  • Basambisi 2:14
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Bongo nkanda ya Yehova engalelaki Bayisraele. Na yango apesaki bango na mabɔkɔ ya bapunzi, mpe bapunzaki bango.+ Atɛkaki bango na lobɔkɔ ya banguna oyo bazalaki zingazinga na bango,+ mpe bazalaki lisusu na likoki ya kotɛlɛma liboso ya banguna na bango te.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto