Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 3:8
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Nakokita mpo na kobikisa bango na lobɔkɔ ya Baezipito+ mpe kolongola bango na mokili oyo mpo bámata tii na mokili moko malamu mpe monene, mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi,+ na teritware ya Bakanana, Bahiti, Baamore, Baperizi, Bahivi mpe Bayebusi.+

  • Mitángo 13:26, 27
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Bongo bazongaki epai ya Moize ná Arona mpe liyangani mobimba ya Bayisraele na esobe ya Parane, na Kadeshe.+ Mpe bamemelaki liyangani mobimba maloba mpe balakisaki bango mbuma ya mokili yango. 27 Makambo bayebisaki Moize yango oyo: “Tokɔtaki na mokili oyo otindaki biso, mpe yango etondi mpenza na miliki mpe na mafuta ya nzoi,+ mpe talá mbuma na yango.+

  • Ezekiele 20:6
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Na mokolo yango, nalapaki ndai ete nakobimisa bango na mokili ya Ezipito mpo na komema bango na mokili oyo nalukaki* mpo na bango, mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi.+ Elekaki mikili nyonso na kitoko.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto