-
1 Samwele 15:22, 23Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
22 Bongo Samwele alobaki: “Eloko nini esepelisaka Yehova koleka: makabo ya kotumba mpe bambeka+ to kotosa mongongo ya Yehova? Talá! Kotosa eleki kopesa mbeka,+ mpe koyoka na likebi eleki mafuta+ ya bampate-mibali; 23 mpo botomboki+ ezali ndenge moko na lisumu ya kosakola makambo oyo ebombaná,+ mpe kokende liboso na lofundo ezali ndenge moko na kosala makambo ya maji mpe kosambela bikeko.* Lokola oboyi kotosa liloba ya Yehova,+ ye mpe aboyi yo ozala mokonzi.”+
-