-
1 Ntango 17:16-22Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
16 Bongo Mokonzi Davidi akendaki kofanda na mabele liboso ya Yehova mpe alobaki: “Ee Yehova Nzambe, ngai nde nani? Mpe libota na ngai nde nini, mpo okómisa ngai ndenge nazali lelo?+ 17 Mpe osuki wana te, Ee Nzambe, olobi makambo oyo okosalela libota* na ngai mosaleli na yo tii mosika na mikolo oyo ekoya,+ mpe otali ngai lokola nde nazalaki moto oyo abongi kozwa lisusu lokumu mingi,* Ee Yehova Nzambe. 18 Ngai mosaleli na yo Davidi nakoki koloba na yo lisusu nini mpo na lokumu oyo opesi ngai, lokola oyebi ngai malamu?+ 19 Ee Yehova, mpo na mosaleli na yo mpe ndenge motema na yo elingi,* osali makambo minene wana nyonso na ndenge olakisi bonene na yo.+ 20 Ee Yehova, mosusu lokola yo azali te,+ mpe Nzambe mosusu azali te, kaka yo.+ Nyonso oyo toyoká na matoi na biso emonisi ete ezali bongo. 21 Mpe awa na mabele, ekólo mosusu nini ezali lokola bato na yo Yisraele?+ Yo, Nzambe ya solo, okendaki kosikola bango mpo bázala bato na yo.+ Osalaki ete nkombo na yo eyebana na makambo minene mpe ya nsɔmɔ oyo osalaki,+ na ndenge obenganaki bikólo liboso ya bato na yo,+ oyo osikolaki na Ezipito. 22 Okómisaki Yisraele bato na yo moko mpo na libela;+ mpe yo, Ee Yehova, okómaki Nzambe na bango.+
-