-
1 Ntango 17:23-27Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
23 Sikoyo, Ee Yehova, tiká ete elaka oyo opesi mpo na ngai mosaleli na yo mpe libota* na ngai ekokisama mpo na libela, mpe tiká ete osala kaka ndenge olaki.+ 24 Tiká nkombo na yo eumela seko* mpe ekumisama+ libela na libela, mpo bato báloba ete: ‘Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, azali Nzambe mpo na Yisraele,’ mpe tiká libota* ya mosaleli na yo Davidi epikama makasi liboso na yo.+ 25 Mpo yo, Nzambe na ngai, nde oyebisi ngai mosaleli na yo mokano na yo ya kobimisa bakonzi na libota na ngai.* Yango wana ngai mosaleli na yo nazwi mpiko ya kosala libondeli oyo. 26 Mpe sikoyo, Ee Yehova, ozali Nzambe ya solo, mpe olaki makambo wana ya malamu mpo na mosaleli na yo. 27 Boye, tiká ete osepela kopambola libota* ya mosaleli na yo, mpe tiká ete eumela libela na libela liboso na yo; mpo yo, Ee Yehova, opamboli yango, mpe epambolami mpo na libela.”
-