Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 9:23, 24
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Nsukansuka, Moize ná Arona bakɔtaki na hema ya kokutana, na nsima babimaki mpe bapambolaki bato.+

      Bongo nkembo ya Yehova emonanaki liboso ya bato nyonso,+ 24 mpe mɔtɔ eutaki epai ya Yehova+ mpe ebandaki kozikisa likabo ya kotumba mpe biteni ya mafuta likoló ya etumbelo. Ntango bato nyonso bamonaki yango, babandaki koganga mpe bakweaki bilongi na nse.+

  • Kolimbola Mibeko 4:24
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Mpo Yehova Nzambe na bino azali mɔtɔ oyo ezikisaka,+ Nzambe oyo asɛngaka kokangama kaka na ye.+

  • Basambisi 6:21
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Na nsima, anzelu ya Yehova azwaki lingenda oyo ezalaki na lobɔkɔ na ye, mpe atutisaki nsɔngɛ na yango na mosuni ná limpa oyo ezangá levire. Na mbala moko mɔtɔ ebimaki na libanga yango mpe ezikisaki mosuni ná limpa oyo ezangá levire.+ Bongo anzelu ya Yehova alimwaki na miso na ye.

  • 1 Ntango 21:26
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Bongo Davidi atongelaki Yehova etumbelo+ kuna mpe apesaki bambeka ya kotumba ná bambeka ya kimya.* Abelelaki Yehova, mpe ye ayanolaki ye na ndenge atindaki mɔtɔ+ oyo eutaki na likoló mpe ezikisaki makabo oyo ezalaki na etumbelo.

  • 2 Ntango 7:1
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Bongo ntango kaka Salomo asilisaki kobondela,+ mɔtɔ eutaki na likoló+ mpe ezikisaki likabo ya kotumba mpe bambeka, mpe nkembo ya Yehova etondaki na tempelo.*+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto