-
2 Bakonzi 14:26, 27Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
26 Mpo Yehova amonaki mpasi makasi oyo Yisraele ekómaki na yango.+ Ezalaki ata na moto moko te mpo na kosalisa Yisraele, ezala moto oyo azangi makoki to oyo azangi ntina. 27 Kasi Yehova alakaki ete akolongola nkombo ya Yisraele te na mabele.+ Na yango, abikisaki bango na nzela ya lobɔkɔ ya Yeroboame mwana ya Yehoashe.+
-