-
Yirimia 22:24, 25Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
24 Yehova alobi boye: “‘Lokola nazali solo na bomoi,’ ‘ata soki Konia*+ mwana ya Yehoyakime,+ mokonzi ya Yuda, azalaka lopɛtɛ ya kotya kashɛ na lobɔkɔ na ngai ya mobali, nalingaki kolongola ye wana! 25 Nakopesa yo na lobɔkɔ ya baoyo bazali koluka koboma yo,* na lobɔkɔ ya baoyo ozali kobanga, na lobɔkɔ ya Nebukadenezare mokonzi ya Babilone mpe na lobɔkɔ ya Bakaladea.+
-