7 Otyaki mbeto na yo likoló ya ngomba ya molai mpe oyo etombwaná,+
Mpe omataki kuna mpo na kopesa mbeka.+
8 Otyaki elembo ya ekeko na yo ya losambo nsima ya porte mpe ya likonzí ya porte.
Otikaki ngai, mpe omitikaki bolumbu;
Omataki mpe okómisaki mbeto na yo monene.
Mpe osalaki kondimana na bango.
Osepelaki kozala na bango mbeto moko,+
Mpe otalaki enama ya mibali.