9 Bayisraele bazalaki kosala makambo oyo ezali sembo te na miso ya Yehova Nzambe na bango. Bazalaki se kotonga bisika oyo etombwaná na bingumba na bango nyonso,+ banda na linɔ́ngi ya mosɛnzɛli tii na engumba oyo ebatelami makasi.*
14 Bakambi nyonso ya banganga-nzambe ata mpe bato ya ekólo bazangaki bosembo na ndenge ya koleka ndelo; bazalaki kosala makambo nyonso oyo eyinamá ya bikólo, mpe bakómisaki mbindo ndako ya Yehova+ oyo asantisaki na Yerusaleme.