Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezera 1:1, 2
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 1 Na mbula ya liboso ya Siruse+ mokonzi ya Perse, mpo liloba oyo Yehova alobaki na nzela ya Yirimia+ ekokisama, Yehova alamwisaki elimo ya Siruse mokonzi ya Perse mpo asakola nsango moko na bokonzi na ye mobimba, mpe lisusu akoma yango na mokanda,+ ete:

      2 “Talá oyo Siruse mokonzi ya Perse alobi: ‘Yehova Nzambe ya likoló apesi ngai makonzi nyonso ya mabele,+ mpe apesi ngai mokumba ya kotongela ye ndako na Yerusaleme,+ oyo ezali na Yuda.

  • Nzembo 79:1
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 79 Ee Nzambe, bikólo bakɔti na libula na yo;+

      Bakómisi tempelo na yo mosantu mbindo;+

      Bakómisi Yerusaleme engumba oyo ebebá mpo na libela.+

  • Yisaya 64:10
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Bingumba na yo mosantu ekómi esobe.

      Siona ekómi esobe,

      Yerusaleme mabele oyo etikali mpamba.+

  • Bileli 1:1
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 1 Talá ndenge sikoyo afandi kaka ye moko, engumba oyo etondaki na bato!+

      Talá ndenge akómi lokola mwasi oyo mobali akufá, engumba oyo etondaki na bato kati na bikólo!+

      Talá ndenge engumba oyo ezalaki mokonzi-mwasi kati na bitúká oyo eyangelami bakómi kosalisa yango mosala na makasi!+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto