-
Luka 19:43, 44Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
43 Mpo mikolo ekoyela yo, ntango banguna na yo bakotonga zingazinga na yo lopango moko makasi basalá na banzete oyo bakómisá nsɔngɛ. Bakozinga yo mpe bakotya bakaa na bango* bipai nyonso.+ 44 Bakobwaka yo ná bana na yo* na mabele,+ mpe bakotika libanga moko te likoló ya libanga mosusu epai na yo,+ mpo ososolaki te ntango oyo bayaki kotalatala yo.”
-