-
2 Bakonzi 17:9, 10Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
9 Bayisraele bazalaki kosala makambo oyo ezali sembo te na miso ya Yehova Nzambe na bango. Bazalaki se kotonga bisika oyo etombwaná na bingumba na bango nyonso,+ banda na linɔ́ngi ya mosɛnzɛli tii na engumba oyo ebatelami makasi.* 10 Bazalaki se kotɛlɛmisa makonzí ya losambo mpe banzete ya losambo*+ likoló ya ngomba moke nyonso mpe na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa.+
-