-
Ezera 9:6, 7Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
6 Mpe nalobaki: “Ee Nzambe na ngai, nayoki mpenza nsɔni mpe namoni ete nabongi te kotombola elongi na ngai liboso na yo, Ee Nzambe na ngai, mpo mabunga na biso ekómi mingi na mitó na biso mpe ngambo na biso emati tii na likoló.+ 7 Banda na ntango ya bankɔkɔ na biso tii lelo, tozali na ngambo monene.+ Mpe mpo na mabunga na biso, biso moko, bakonzi na biso mpe banganga-nzambe na biso, tokabami na mabɔkɔ ya bakonzi ya bikólo mosusu na mopanga,+ tokómaki bakangami,+ bapunzaki biloko na biso+ mpe toyokisamaki nsɔni, ndenge ezali ata tii lelo oyo.+
-