Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 23:7, 8
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Bongo alobaki liloba oyo ya lisese ete:+

      “Balake mokonzi ya Moabe azwaki ngai banda na Arame,+

      Longwa na bangomba ya ɛsti. Alobi:

      ‘Yaká, lakelá ngai Yakobo mabe.

      Ɛɛ, yaká, osambwisa Yisraele.’+

       8 Ndenge nini nalakela mabe baoyo Nzambe alakeli mabe te?

      Mpe ndenge nini nasambwisa baoyo Yehova asambwisi te?+

  • Mitángo 24:10
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Na yango, Balake asilikelaki Balaama makasi. Balake abɛtaki mabɔkɔ na nkanda, mpe alobaki lisusu na Balaama ete: “Nabengaki yo mpo olakela banguna na ngai mabe,+ kasi talá, na esika osala yango, yo opamboli nde bango mbala misato oyo.

  • Emoniseli 2:14
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 “‘Kasi nazwi yo mabe na mwa makambo oyo: ozali na bato kuna oyo bakangami makasi na mateya ya Balaama,+ oyo ateyaki Balake+ alengola bana ya Yisraele* mpo bálya biloko oyo epesami mbeka na bikeko mpe básala pite.*+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto