-
2 Ntango 33:14Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
14 Na nsima, atongaki efelo moko libándá mpo na Sité ya Davidi,+ na wɛsti ya Gihone,+ oyo ezali na lobwaku.* Efelo yango ekendaki tii na Porte ya Mbisi,+ mpe alekisaki yango tii na Ofɛlɛ;+ amatisaki yango molai mpenza. Lisusu, atyaki bakonzi ya limpinga ya basoda na bingumba nyonso ya Yuda oyo ebatelami makasi.
-
-
Nehemia 12:38, 39Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
38 Etuluku mosusu ya bayembi-nzembo ya kopesa matɔndi etambolaki na ngámbo mosusu.* Nazalaki nsima na bango, elongo na ndambo mosusu ya bato. Totambolaki na efelo, likoló ya Linɔ́ngi ya Bitumbelo ya mampa,+ tii na Efelo Monene,+ 39 mpe likoló ya Porte ya Efraime,+ tii na Porte ya Engumba ya Kala,+ toleki na Porte ya Mbisi+ na Linɔ́ngi ya Hananele,+ na Linɔ́ngi ya Mea, tii na Porte ya Bampate;+ totɛlɛmaki na Porte ya Bakɛngɛli.
-