-
Kolimbola Mibeko 28:28, 29Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
28 Yehova akopesa yo maladi ya ligboma, ya kokufa miso+ mpe ya mobulungano.* 29 Okosimbasimba epai na epai na ntango ya midi, kaka ndenge moto oyo akufá miso asimbasimbaka epai na epai na molili,+ mpe okolonga te na oyo nyonso okosala; mpe okokóma ntango nyonso moto oyo babubaka mpe bayibaka, moto ata moko te akozala mpo na kobikisa yo.+
-
-
Yisaya 59:9, 10Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
9 Yango wana bosembo ezali mosika na biso,
Mpe boyengebene ezali kokómela biso te.
Tozali na elikya ya komona pole, kasi molili nde ezali;
Tozali na elikya ya komona kongɛnga, kasi tozali kaka kotambola na molili.+
10 Lokola bato oyo bakufá miso, tozali kosimbasimba mpo na koluka efelo;
Tozali kokoba kosimbasimba lokola bato oyo bazangá miso.+
Tobɛti libaku na midi lokola nde tozalaki na molili ya mpokwa;
Na kati ya bato ya makasi tozali lokola bato oyo bakufá.
-