Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezekiele 33:11
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Lobá na bango boye: ‘“Lokola nazali solo na bomoi,” Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo, “nasepelaka te na liwa ya moto mabe,+ kasi nasepelaka nde ete moto mabe atika etamboli na ye+ mpe akoba kozala na bomoi.+ Bóbongwana, bóbongwana, bótika etamboli na bino ya mabe,+ mpo na nini bókufa, Ee bato ya Yisraele?”’+

  • Mika 7:18, 19
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Nani azali Nzambe lokola yo,

      Oyo alimbisaka libunga mpe atyaka likebi te na kobuka mibeko+ ya bato na ye* oyo batikali?+

      Akokanga nkanda mpo na libela te,

      Mpo asepelaka na bolingo ya sembo.+

      19 Akomonisela biso lisusu motema mawa;+ akolonga* mabunga na biso.

      Okobwaka masumu na bango nyonso na bozindo ya mbu.+

  • Malaki 3:7
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Banda na mikolo ya bankɔkɔ na bino botikaki malako na ngai mpe botosaki yango te.+ Bózongela ngai, mpe ngai nakozongela bino,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo.

      Kasi bozali kotuna: “Tokozongela yo ndenge nini?”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto