19 Ntango apusanaki mwa moke liboso, amonaki Yakobo mwana ya Zebede ná ndeko na ye Yoane, wana bazalaki na masuwa na bango, bazali kobongisa minyama na bango,+ 20 mpe abengaki bango mbala moko. Bongo batikaki tata na bango Zebede na masuwa elongo na bato ya misala mpe balandaki Yesu.