11 Alobaki na bango: “Moto oyo abomi libala na mwasi na ye mpe abali mosusu, asaleli ye ekobo.+12 Mpe soki esalemi ete mwasi, nsima ya koboma libala na mobali na ye, abali mosusu, asali ekobo.”+
3 Yango wana, ntango mobali na ye azali na bomoi, soki akómi mwasi ya mobali mosusu, bakobenga ye mwasi ya ekobo.+ Kasi soki mobali na ye akufi, alongwe na mobeko na ye, yango wana soki akómi mwasi ya mobali mosusu, azali mwasi ya ekobo te.+