32 Kasi bózala nde na boboto na kati na bino, bóyokelanaka mpenza mawa,+ bólimbisanaka na motema moko ndenge Nzambe mpe, na nzela ya Kristo, alimbisaki bino na motema moko.+
13 Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko,+ ata soki moko na bino azali na likambo ná mosusu.+ Kaka ndenge Yehova* alimbisaki bino na motema moko, bino mpe bósala bongo.+