42 Talá! Mosaleli na ngai,+ oyo nazali kosalisa!
Moto oyo naponi,+ oyo nandimi!+
Natye elimo na ngai epai na ye;+
Akomema bosembo na bikólo.+
2 Akoganga te, akotombola mongongo na ye mpe te,
Akoyokisa te mongongo na ye na balabala.+
3 Akobuka te mongendu oyo elɛmbi,
Mpe akoboma te nsinga ya lini oyo mɔtɔ na yango elingi kokufa.+
Akomema mpenza bosembo.+
4 Akolɛmba te mpe akotika te tii akotya bosembo na mabele;+
Mpe bisanga ekokoba kozela mobeko na ye.