Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Marko 4:3-9
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 “Bóyoka. Moloni abimaki mpo na kolona.+ 4 Ntango azalaki kolona, mboto mosusu ekweaki pembeni ya nzela, mpe bandɛkɛ eyaki mpe elyaki yango. 5 Mboto mosusu ekweaki na mabele oyo ezali na mabanga epai mabele ezalaki mingi te, mpe ebimaki nokinoki mpo mabele ezalaki mozindo te.+ 6 Kasi ntango moi ebimaki, milona yango ezikaki mpe ekaukaki mpo ezalaki na misisa te. 7 Mboto mosusu ekweaki na kati ya banzubɛ; banzubɛ ekolaki mpe etyaki milona nkaka, mpe ebotaki mbuma te.+ 8 Kasi mboto mosusu ekweaki na mabele ya malamu, ebimaki mpe ekolaki, mpe ebandaki kobota mbuma, oyo eboti 30, mosusu 60, mpe mosusu mbala 100.”+ 9 Bongo abakisaki: “Moto oyo azali na matoi ya koyoka, ayoka.”+

  • Luka 8:4-8
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Sikoyo ntango ebele ya bato bayanganaki elongo na baoyo bautaki na bingumba ndenge na ndenge mpe bayaki epai ya Yesu, apesaki bango ndakisa oyo:+ 5 “Moloni moko abimaki mpo na kolona mboto na ye. Ntango azalaki kolona, ndambo na yango ekweaki pembeni ya nzela, bato banyataki yango, mpe bandɛkɛ ya likoló elyaki yango.+ 6 Mboto mosusu ekweaki likoló ya libanga, mpe nsima ya kobima, ekaukaki mpo ezalaki na mai te.+ 7 Mboto mosusu ekweaki na kati ya banzubɛ, mpe banzubɛ oyo ekolaki elongo na yango etyaki milona nkaka.+ 8 Kasi mboto mosusu ekweaki na mabele ya malamu, mpe nsima ya kobima, ebotaki mbuma mbala 100.”+ Nsima ya koloba makambo wana, abelelaki ete: “Moto oyo azali na matoi ya koyoka, ayoka.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto