Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Marko 6:1-6
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Alongwaki kuna mpe akendaki na mboka na ye mpenza,+ mpe bayekoli na ye balandaki ye. 2 Ntango Sabata ekómaki, abandaki koteya na sinagoga. Bato mingi oyo bazalaki koyoka ye bakamwaki mpe balobaki: “Moto oyo azwi makambo oyo epai wapi?+ Mpo na nini bwanya ya boye epesami epai na ye, mpe mpo na nini makamwisi* oyo ezali kosalema na mabɔkɔ na ye?+ 3 Oyo mosali-mabaya te,+ mwana ya Maria,+ mpe ndeko ya Yakobo,+ Yozefe, Yudasi, mpe Simo,+ boye te? Mpe bandeko na ye ya basi bazali awa elongo na biso te?” Bongo babɛtaki libaku mpo na ye.* 4 Kasi Yesu alobaki na bango: “Bapesaka mosakoli lokumu bipai nyonso, longola kaka na mboka na ye, na libota na ye mpe na ndako na ye moko.”+ 5 Bongo akokaki te kosala makamwisi kuna, longola kaka kotya mabɔkɔ likoló ya mwa ndambo ya bato oyo bazalaki na maladi mpe kobikisa bango. 6 Ya solo, akamwaki makasi na ndenge bazangaki kondima. Mpe akendaki epai na epai na bamboka ya zingazinga, mpo na koteya.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto