Marko 7:15 Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika 15 Eloko oyo euti libándá mpe ekɔti na kati ya moto ekoki kokómisa ye mbindo te. Makambo oyo ebimaka na kati ya moto nde ekómisaka ye mbindo.”+ Baefese 4:29 Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika 29 Liloba ya kopɔla ebima na monɔkɔ na bino te,+ kasi nde liloba nyonso oyo ezali malamu mpo na kotonga ntango mposa ezali, mpo epesa bayoki eloko ya malonga.+ Yakobo 3:6 Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika 6 Lolemo ezali mpe mɔtɔ.+ Lolemo ezali eteni ya nzoto na biso oyo etondi na kozanga bosembo,+ mpo yango ekómisaka nzoto mobimba mbindo, ezikisaka bomoi mobimba* mpe mɔtɔ na yango eutaka na Gehena.*
15 Eloko oyo euti libándá mpe ekɔti na kati ya moto ekoki kokómisa ye mbindo te. Makambo oyo ebimaka na kati ya moto nde ekómisaka ye mbindo.”+
29 Liloba ya kopɔla ebima na monɔkɔ na bino te,+ kasi nde liloba nyonso oyo ezali malamu mpo na kotonga ntango mposa ezali, mpo epesa bayoki eloko ya malonga.+
6 Lolemo ezali mpe mɔtɔ.+ Lolemo ezali eteni ya nzoto na biso oyo etondi na kozanga bosembo,+ mpo yango ekómisaka nzoto mobimba mbindo, ezikisaka bomoi mobimba* mpe mɔtɔ na yango eutaka na Gehena.*