Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Marko 1:3, 4
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mongongo ya moto moko ezali koganga na esobe: ‘Bóbongisa nzela ya Yehova!* Bósembola babalabala na ye.’”+ 4 Yoane Mobatisi azalaki na esobe, azalaki kosakola batisimo oyo ezalaki elembo ya kobongola motema mpo na kolimbisama ya masumu.+

  • Luka 3:3-6
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Bongo Yoane atambolaki na etúká mobimba zingazinga ya Yordani, azalaki kosakola batisimo oyo ezalaki elembo ya kobongola motema mpo na kolimbisama ya masumu,+ 4 kaka ndenge ekomami na mokanda ya mosakoli Yisaya ete: “Mongongo ya moto moko ezali koganga na esobe: ‘Bóbongisa nzela ya Yehova!* Bósembola babalabala na ye.+ 5 Mabwaku nyonso ekozipama, mpe bangomba minene ná bangomba mike nyonso ekokóma patatalu. Banzela nyonso oyo egumbamá ekokóma semba mpe banzela ya mabakumabaku ekokóma kitoko. 6 Mpe bato nyonso* bakomona lobiko ya Nzambe.’”*+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto