-
Marko 11:7-11Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
7 Bongo bamemaki mwana ya mpunda+ yango epai ya Yesu, mpe batyaki likoló na yango bilamba na bango ya likoló, mpe Yesu afandaki likoló na yango.+ 8 Lisusu, bato mingi batandaki bilamba na bango ya likoló na nzela, kasi basusu bakataki nkasa ya nzete na bilanga.+ 9 Mpe bato oyo bazalaki kotambola liboso ya Yesu mpe baoyo bazalaki koya na nsima bazalaki se koganga: “Tobondeli yo, bikisá!+ Moto oyo azali koya na nkombo ya Yehova* apambwama!+ 10 Bokonzi ya tata na biso Davidi+ oyo ezali koya epambwama! Tobondeli yo, bikisá, kuna na likoló!” 11 Yesu akɔtaki na Yerusaleme, na nsima akendaki na tempelo, mpe kuna, atalaki biloko nyonso. Kasi lokola ngonga epusanaki, abimaki, akei na Betani elongo na bantoma zomi na mibale.+
-