Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Marko 11:27-33
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Bakómaki lisusu na Yerusaleme. Mpe ntango azalaki kotambola na tempelo, banganga-nzambe bakonzi mpe bakomeli ná bankulutu bayaki 28 mpe balobaki na ye: “Bokonzi nini ozali na yango ya kosala makambo oyo? To nani apesi yo bokonzi oyo ya kosala makambo yango?”+ 29 Yesu alobaki na bango: “Nakotuna bino motuna moko. Soki boyanoli ngai, ngai mpe nakoyebisa bino na bokonzi nini nazali kosala makambo oyo. 30 Batisimo ya Yoane+ eutaki na likoló to epai ya bato? Bóyanola ngai.”+ 31 Bongo babandaki kolobana bango na bango: “Soki tolobi: ‘Na likoló,’ akoloba: ‘Bongo mpo na nini bondimelaki ye te?’ 32 Kasi soki tomeki koloba: ‘Epai ya bato’?” Bazalaki kobanga ebele wana ya bato, mpo bango nyonso bazalaki komona ete Yoane azalaki mpenza mosakoli.+ 33 Na yango, bazongiselaki Yesu ete: “Toyebi te.” Bongo Yesu alobaki na bango: “Ngai mpe nakoyebisa bino te na bokonzi nini nazali kosala makambo oyo.”

  • Luka 20:1-8
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Mokolo moko ntango azalaki koteya bato na tempelo mpe kosakola nsango malamu, banganga-nzambe bakonzi mpe bakomeli ná bankulutu bayaki 2 mpe balobaki na ye: “Yebisá biso, bokonzi nini ozali na yango ya kosala makambo oyo? To nani apesi yo bokonzi yango?”+ 3 Azongiselaki bango: “Ngai mpe nakotuna bino motuna moko. Bóyebisa ngai: 4 Batisimo ya Yoane eutaki na likoló to epai ya bato?” 5 Bongo babandaki kolobana bango na bango: “Soki tolobi: ‘Na likoló,’ akoloba: ‘Mpo na nini bondimelaki ye te?’ 6 Kasi soki tolobi: ‘Epai ya bato,’ bato nyonso bakobamba biso mabanga, mpo bandimaka mpenza ete Yoane azalaki mosakoli.”+ 7 Na yango bazongisaki ete bayebi te esika yango eutaki. 8 Bongo Yesu alobaki na bango: “Ngai mpe nakoyebisa bino te na bokonzi nini nazali kosala makambo oyo.”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto