34 Yerusaleme, Yerusaleme, engumba oyo ebomaka basakoli mpe ebambaka baoyo batindami epai na yango mabanga+—mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo esika moko ndenge nsoso ya mwasi esangisaka bana na yango na nse ya mapapu na yango! Kasi bolingaki te.+
41 Ntango akómaki pene, atalaki engumba mpe alelaki mpo na yango,+42 alobi: “Soki ata yo ososolaka, na mokolo ya lelo, makambo oyo ememaka kimya—kasi sikoyo yango ebombami na miso na yo.+