9 “Kasi bino, bókeba: Bato bakokaba bino na batribinale ya mboka,+ mpe bakobɛta bino na basinagoga+ mpe bakotɛlɛmisa bino liboso ya baguvɛrnɛrɛ mpe bakonzi mpo na ngai, mpe yango ekozala litatoli mpo na bango.+
12 “Kasi liboso ete makambo wana nyonso esalema, bato bakokanga bino mpe bakonyokola bino,+ bakokaba bino na basinagoga mpe bakotya bino na babolɔkɔ. Bakomema bino liboso ya bakonzi mpe baguvɛrnɛrɛ mpo na nkombo na ngai.+13 Na ndenge wana bokozwa libaku ya kopesa litatoli.