Matai 26:64 Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika 64 Yesu alobaki na ye: “Yo moko olobi yango. Kasi nalobi na bino: Banda sikoyo bokomona Mwana ya moto+ afandi na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe ya nguya*+ mpe azali koya na mapata ya likoló.”+ Marko 13:26 Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika 26 Bongo bakomona Mwana ya moto+ azali koya na mapata na nguya mingi mpe na nkembo.+ Luka 21:27 Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika 27 Bongo bakomona Mwana ya moto+ azali koya na lipata, na nguya mpe na nkembo mingi.+
64 Yesu alobaki na ye: “Yo moko olobi yango. Kasi nalobi na bino: Banda sikoyo bokomona Mwana ya moto+ afandi na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe ya nguya*+ mpe azali koya na mapata ya likoló.”+