-
Luka 22:3-6Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
3 Bongo Satana akɔtelaki Yudasi, oyo babengi Mokeriota, oyo azalaki moko ya bantoma zomi na mibale.+ 4 Mpe Yudasi akendaki kosolola na banganga-nzambe bakonzi mpe bakapitɛni ya tempelo mpo na ndenge ya kotɛkɛla bango Yesu.+ 5 Basepelaki na likambo yango mpe bayokanaki bápesa ye mbongo ya palata.+ 6 Bongo andimaki mpe abandaki koluka libaku ya malamu mpo na kotɛka ye epai na bango na ntango oyo ebele ya bato bazali zingazinga te.
-