Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Marko 14:32-36
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 32 Bongo bakómaki na esika babengi Getesemane, mpe alobaki na bayekoli na ye: “Bófanda awa ntango ngai nakei kobondela.”+ 33 Mpe azwaki Petro, Yakobo, ná Yoane elongo na ye,+ bongo abandaki koyoka mawa makasi* mpe kotungisama makasi mpenza. 34 Alobaki na bango: “Nazali* na mawa makasi mpenza,+ lokola nakufa. Bótikala awa mpe bókoba kosɛnzɛla.”+ 35 Nsima ya kopusana mwa moke liboso, afukamaki na mabele mpe abandaki kobondela ete, soki likoki ezali, likambo oyo* eleka mosika na ye. 36 Alobaki mpe: “Aba,* Tata,+ mpo na yo makambo nyonso ekoki kosalema; longolá kɔpɔ oyo epai na ngai. Nzokande, ezala te oyo ngai nalingi, kasi oyo yo olingi.”+

  • Luka 22:40
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 40 Ntango akómaki na esika yango, alobaki na bango: “Bókoba kobondela mpo bókwea na komekama te.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto