-
Yoane 18:25-27Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
25 Nzokande Simo Petro azalaki wana mpe azalaki koyɔta mɔtɔ. Bongo balobaki na ye: “Yo mpe ozali te moko ya bayekoli na ye?” Awanganaki mpe alobaki: “Te, ngai te.”+ 26 Moko ya baombo ya nganga-nzambe monene, oyo azalaki ndeko ya moto oyo Petro akataki litoi,+ alobaki: “Yo te nde namonaki na elanga elongo na ye?” 27 Kasi Petro awanganaki lisusu mpe na mbala moko nsoso elelaki.+
-